Emoniseli 19:20 - Mokanda na Bomoi20 Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tala ndenge nini, kati na emoniseli na ngai, bampunda mpe basoda oyo babundaka na likolo na yango bazalaki : balataki bibende oyo basoda balataka mpo na kobatela tolo. Bibende yango ezalaki ya motane makasi lokola moto, ya langi ya bule ya pete mpe ya langi ya mosaka ; bongo mito ya bampunda ezalaki lokola mito ya bankosi, mpe minoko na yango ezalaki kobimisa moto, milinga mpe sofolo.