Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 19:2 - Mokanda na Bomoi

2 pamba te akataka makambo na bosolo mpe na bosembo ; apesi etumbu epai ya mwasi ya ndumba monene oyo azalaki kobebisa mokili na nzela ya kindumba na ye, mpe azongisi mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na Ye. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 19:2
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Osengeli koboma libota ya Akabi, mokonzi na yo, mpe nakozongisa mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na ngai, basakoli, mpe ya bawumbu nyonso ya Yawe, oyo Jezabeli asopaki makila na bango.


Mitindo ya Yawe ezali alima, esepelisaka motema ; malako na Ye ezali peto, epesaka bososoli.


Yawe, ozali Nzambe na ngai ; nakonetola Yo mpe nakosanzola Kombo na Yo ; pamba te na boyengebene na Yo ya kokoka, osalaki mabongisi ya kokamwa, makambo oyo obongisa wuta kala.


Kasi bato ya mibeko bakovanda lisanga mpe bakobotola ye bokonzi, mpe bokonzi yango ekokufa mpe ekolimwa libela.


Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto. Tango lokolo na bango ekobeta libaku, na tango wana nde pasi na bango ekoya na lombangu, mpe nyonso oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo na bango ekowumela te. »


Yawe azali lokola Libanga ; misala na Ye ezali ya kokoka, mpe banzela na Ye nyonso ezali sembo ; azali Nzambe ya boyengebene, asalaka mabe te ; azali sembo mpe alima.


Oh bikolo, bosepela elongo na bato na Ye ! Bino ba-anjelu nyonso, bogumbamela Nzambe ; pamba te akozongisa mabe na mabe mpo na makila ya basali na Ye, akozongisa mabe na mabe epai ya banguna na Ye mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mokili na Ye mpe bato na Ye.


Bazalaki koyemba nzembo ya Moyize, mowumbu ya Nzambe, mpe nzembo ya Mpate : Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, misala na Yo ezali minene mpe ya kokamwa ! Mokonzi ya bikolo nyonso, banzela na Yo ezali sembo mpe solo.


Likolo, sepela na libebi na yango ! Bino mpe basantu, bosepela ! Bino bantoma mpe basakoli, bosepela mpe lokola ! Pamba te Nzambe alongisi bino awa akateli yango etumbu. »


Pamba te bikolo nyonso emelaki vino ya kanda ya kindumba na yango. Bakonzi ya mokili basalaki ekobo elongo na Babiloni, mpe bozwi ya bato ya mokili, oyo basalaka mombongo, emataki makasi mpo na monzele na yango, oyo elekaki ndelo. »


Bagangaki na mongongo makasi : « Nkolo Nzambe, Yo oyo ozali Bule mpe Solo, okozela kino tango nini mpo na kosambisa bavandi ya mokili mpe kopesa bango etumbu mpo na makila na biso ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ