Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 19:19 - Mokanda na Bomoi

19 Bongo namonaki nyama mpe bakonzi ya mokili elongo na mampinga na bango kosangana mpo na kobundisa Motambolisi ya mpunda mpe mampinga na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 19:19
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mayele mabe na ye, akolonga kokosa bato ebele mpe akokoma na motema ya lofundu ; akoboma bato ebele oyo bazalaki na bango na kimia mpe akotelemela Mokambi ya bakambi, kasi akobebisama na nguya ya moto te.


Kasi tango bakosilisa kopesa litatoli na bango, nyama oyo ekobima wuta na libulu ya monene mpe ya molili makasi ekobundisa bango, ekolonga bango mpe ekoboma bango.


Anjelu ya misato alandaki ba-anjelu wana mibale ya liboso mpe alobaki na mongongo makasi : « Moto nyonso oyo agumbamelaka nyama mpe ekeko na yango, mpe azwi elembo na yango na mbunzu to na loboko na ye,


Ezali milimo ya kindoki oyo esalaka bikamwa. Ebimi mpo na kokende epai ya bakonzi ya mokili mobimba, mpo na kosangisa bango mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.


Milimo wana ya kindoki esangisaki bakonzi na esika oyo babengaka, na lokota ya Ebre, Armagedona.


Tango bakonzi ya mokili, oyo bakabolaki elongo na yango bomoi na yango ya kindumba mpe ya bisengo, bakomona molinga ya engumba oyo etumbami, bakolela mpe bakoyoka mawa na tina na yango.


Bongo mopanga oyo ebimaki na monoko ya Motambolisi ya mpunda ebomaki bato oyo batikalaki, mpe bandeke nyonso etondaki na kolia misuni ya bibembe na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ