Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 19:15 - Mokanda na Bomoi

15 Mopanga moko ya minu ezalaki kobima na monoko na Ye mpo na kobeta bikolo. Akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akonika bambuma ya vino kati na ekamolelo ya vino ya kanda monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 19:15
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okoyangela yango na bokonzi ya ebende, okopanza yango lokola mbeki ya mabele. »


kasi akokata makambo ya bato bakelela na bosembo mpe akozwa mikano ya sembo mpo na babola ya mokili. Akobeta mokili fimbu na maloba na ye mpe akoboma bato mabe na pema ya monoko na ye.


Babongisaki wuta kala Tofeti, babongisaki yango nde mpo na mokonzi ; basalaki libulu na yango ya moto mozindo mpe monene mpo ete ebimisa moto makasi mpe ekota bakoni ebele. Pema na Yawe, oyo ezali lokola ebale ya sofolo nde ekopelisa yango.


mpo ete motomboki amonisama, ye oyo Nkolo Yesu akoboma na nzela ya Liloba kowuta na monoko na Ye mpe akobebisa tango akoya na nzela ya nkembo ya boyei na Ye.


Na loboko na Ye ya mobali, asimbaki minzoto sambo ; mpe wuta na monoko na Ye, mopanga moko bapelisa na bangambo na yango nyonso mibale ezalaki kobima. Elongi na Ye ezalaki lokola moyi, na tango oyo engalaka makasi.


Nzokande, mwasi yango abotaki mwana mobali oyo akokamba bikolo nyonso na nzela ya lingenda ya ebende. Bongo mwana na ye amemamaki epai ya Nzambe mpe epai ya Kiti na Ye ya Bokonzi.


ye mpe akomela vino ya kanda ya Nzambe, vino oyo basopaki ya peto, kati na kopo ya kanda na Ye. Mpe akonyokwama kati na moto ya sofolo liboso ya ba-anjelu ya bule mpe liboso ya Mpate.


Bongo mopanga oyo ebimaki na monoko ya Motambolisi ya mpunda ebomaki bato oyo batikalaki, mpe bandeke nyonso etondaki na kolia misuni ya bibembe na bango.


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Pergame : « Tala maloba ya Ye oyo asimbi mopanga bapelisa na bangambo nyonso mibale :


Boye, bongola motema na yo ! Soki te, nakoya kala mingi te epai na yo mpe nakobundisa bango na mopanga ya monoko na Ngai.


akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akopanza yango na biteni lokola mbeki,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ