Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 19:12 - Mokanda na Bomoi

12 Miso na Ye ezali lokola moto oyo ezali kopela ; mpe na moto na Ye, ezali na mitole ebele. Bakoma kombo moko na nzoto na Ye, kombo oyo Ye moko kaka nde ayebi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 19:12
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto yango alobaki lisusu : — Kobanda lelo, kombo na yo ekozala lisusu Jakobi te, kasi Isalaele, pamba te obundi na Nzambe mpe na bato, bongo olongi.


namitunaka : Moto azali nini mpo ete okanisa ye, mpe moto azali nani mpo ete obatela ye ?


Bosala keba na miso na ye mpe boyoka makambo oyo akoloba ; botombokela ye te mpo ete akolimbisa botomboki na bino te, pamba te Kombo na Ngai ezali kati na ye.


Nani amata na Lola to mpe akita wuta kuna ? Nani asangisa mopepe kati na maboko na ye ? Nani akanga mayi na kazaka na ye ? Nani akata bandelo nyonso ya mabele ? Kombo na ye nani ? Mpe kombo ya mwana na ye ezali nani ? Yebisa ngai soki oyebi !


Bino bilenge basi ya Siona, bobima ; botala ndenge nini mokonzi Salomo alati motole, motole oyo mama na ye alatisaki ye na mokolo ya libala na ye, na mokolo oyo motema na ye ezalaki na esengo.


Okozala motole ya nkembo kati na loboko ya Yawe mpe ekoti ya bokonzi kati na loboko ya Nzambe na yo.


Bokonzi na ye ekokende mosika penza, mpe kimia na ye ekozala na suka te. Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi, akozala mokonzi ya mokili na ye, akolendisa mpe akokamba yango na bosembo mpe na boyengebene, wuta na tango oyo kino libela na libela. Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akosala na bolingo makasi na Ye.


Nzoto na ye ezalaki kongenga lokola topaze, elongi na ye ezalaki kongala lokola mokalikali, miso na ye ezalaki kopela lokola moto, maboko mpe makolo na ye ezalaki kongenga lokola ebende ya bronze oyo balekisa na moto, mpe mongongo na ye ezalaki koyokana lokola makelele ya bato ebele.


Na mokolo wana, Yawe, Nzambe na bango, akobikisa bango ndenge mobateli bibwele abikisaka bameme na ye. Bakongenga makasi kati na mabele na Ye lokola mabanga ya talo.


Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi Mwana longola kaka Tata, mpe moko te ayebi Tata longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.


« Boloba na Siona, mboka kitoko : ‹ Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, atonda na boboto, avandi na likolo ya ane ya mwasi, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya nyama oyo ememaka mikumba. › »


Yesu apusanaki pene na bango mpe alobaki : — Bokonzi nyonso epesameli Ngai, ezala kati na Likolo to na mokili.


Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi soki Mwana azali nani, longola kaka Tata ; mpe moko te ayebi soki Tata azali nani, longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.


Kala mingi te, nakozala lisusu te kati na mokili, pamba te nazali koya epai na Yo ; kasi bango, bakokoba kozala kati na mokili. Tata na Ngai, Yo oyo ozali Mosantu, batela bango na nguya ya Kombo na Yo, Kombo oyo opesaki Ngai, mpo ete bazala moko ndenge Yo na Ngai tozali moko.


Wana nazalaki elongo na bango, nabatelaki bango na nguya ya Kombo na Yo, Kombo oyo opesaki Ngai ; nabatelaki bango malamu, mpe moko te kati na bango abungaki, longola kaka ye oyo asengeli na libebi mpo ete Makomi ekokisama.


na likolo ya milimo nyonso, ya bokonzi nyonso, ya nguya nyonso, ya bokasi nyonso, mpe ya kombo nyonso oyo bato bakoki kotanga, na tango oyo kaka te kasi mpe na tango oyo ekoya.


Kasi tala makambo oyo tozali komona : Yesu oyo akitisamaki na se ya ba-anjelu mpo na mwa tango moke, alati sik’oyo motole ya nkembo mpe ya lokumu mpo ete andimaki pasi oyo ememaki Ye kino na kufa. Na bongo, na ngolu ya Nzambe, Yesu akufaki nde mpo na bato nyonso.


Moto mpe suki na Ye ezalaki pembe makasi lokola mvula ya pembe. Miso na Ye ezalaki lokola moto oyo ezali kopela makasi.


Sima na yango, elembo mosusu emonanaki na likolo, ezalaki dalagona moko ya monene mpe ya motane. Dalagona yango ezalaki na mito sambo mpe maseke zomi ; mpe na mito wana sambo, moko na moko ezalaki na motole.


Bongo namonaki nyama moko kobima longwa na ebale monene. Ezalaki na maseke zomi mpe mito sambo. Elataki mitole zomi na maseke na yango ; mpe na mito na yango, bakomaki bakombo mpo na kofinga Nzambe.


Na nzambala mpe na mopende na Ye, bakoma kombo : « Mokonzi ya Bakonzi mpe Nkolo ya bankolo. »


Moto oyo akolonga, nakokomisa ye likonzi kati na Tempelo ya Nzambe na Ngai, mpe akotikala lisusu te kobima kuna. Nakokoma na likolo na ye Kombo ya Nzambe na Ngai mpe kombo ya engumba ya Nzambe na Ngai, Yelusalemi ya sika, oyo ekokita wuta na Lola, epai ya Nzambe na Ngai. Mpe lisusu, nakokoma Kombo na Ngai ya sika na likolo na ye.


Natalaki mpe namonaki liboso na ngai mpunda moko ya pembe. Motambolisi na yango asimbaki tolotolo. Bapesaki ye motole, bongo abimaki lokola molongi mpe mpo ete azala molongi.


Anjelu na Yawe azongiselaki ye : — Mpo na nini ozali kotuna ngai kombo na ngai ? Kombo na ngai ezali kombo ya kokamwa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ