Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 18:9 - Mokanda na Bomoi

9 Tango bakonzi ya mokili, oyo bakabolaki elongo na yango bomoi na yango ya kindumba mpe ya bisengo, bakomona molinga ya engumba oyo etumbami, bakolela mpe bakoyoka mawa na tina na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 18:9
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

atalaki na ngambo ya Sodome mpe ya Gomore, mpe na ngambo ya mokili ya etando ; amonaki molinga makasi komata wuta na mokili lokola molinga ya fulu monene ya moto.


Liboso ete banzungu na bino ekutana na moto ya basende, ezala ya mayi to ya kokawuka, bato mabe akolimwa.


Nzambe akokweyisa Babiloni, kongenga ya babokonzi, nkembo ya lolendo ya bato ya Chalide, ndenge akweyisaki Sodome mpe Gomore.


Babongisaki wuta kala Tofeti, babongisaki yango nde mpo na mokonzi ; basalaki libulu na yango ya moto mozindo mpe monene mpo ete ebimisa moto makasi mpe ekota bakoni ebele. Pema na Yawe, oyo ezali lokola ebale ya sofolo nde ekopelisa yango.


Ndenge Nzambe abebisaki Sodome mpe Gomore elongo na bingumba na yango ya zingazinga, › » elobi Yawe, « moto moko te akovanda lisusu kuna, moto moko te akowumela kati na yango.


Na lokito ya kokweya ya mokili ya Babiloni, mabele ekoningana ; makelele na yango ekoyokana kino na bikolo mosusu.


Babiloni ekokweya na mbalakata mpe ekobukana ! Bosala matanga mpo na yango mpe botia kisi na pota na yango, tango mosusu akobika.


Bavandi nyonso ya bisanga bakomi na mawa mpo na yo ; bakonzi na bango bazali kolenga na somo, mpe bilongi na bango ebebi likolo ya kobanga.


Ba-anjelu nde bazwi mokano wana ; basantu nde bakati yango mpo ete bato ya bomoi bayeba ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali Nkolo ya mokili ya bato, apesaka bokonzi na yango na moto nyonso oyo Ye alingi mpe azali na makoki ya kotombola kati na yango moto ya suka kati na bato. ›


Bikolo nyonso ekotuna : ‹ Mpo na nini Yawe asali likambo ya boye na mokili oyo ? Mpo na nini kanda makasi boye ? ›


Kasi kotanga te bilenge basi bakufisa mibali na molongo ya basi bakufisa mibali ; pamba te soki posa na bango ya nzoto elamuki mpe epengwisi bango na miso ya Klisto, bakoluka lisusu kobala,


Molinga ya pasi na bango ekomata na likolo mpo na libela na libela. Butu mpe moyi, bopemi ekozala te mpo na bato oyo bagumbamelaka nyama mpe ekeko na yango, mpe mpo na moto nyonso oyo akondima kozwa elembo ya kombo na yango. »


Bakonzi minene ya mokili basalaki ekobo elongo na ye, mpe bavandi ya mokili balangwaki vino ya kindumba na ye. »


Wana bakomona molinga komata longwa na engumba oyo etumbami, bakoganga : ‹ Engumba nini ekokanaki na engumba monene oyo ? ›


Likolo, sepela na libebi na yango ! Bino mpe basantu, bosepela ! Bino bantoma mpe basakoli, bosepela mpe lokola ! Pamba te Nzambe alongisi bino awa akateli yango etumbu. »


Pamba te bikolo nyonso emelaki vino ya kanda ya kindumba na yango. Bakonzi ya mokili basalaki ekobo elongo na Babiloni, mpe bozwi ya bato ya mokili, oyo basalaka mombongo, emataki makasi mpo na monzele na yango, oyo elekaki ndelo. »


Bonyokola mpe bosala yango mabe makasi ndenge kaka emipesaki na nkembo mpe na lokumu. Pamba te emikumisaka kati na motema na yango : ‹ Navandi lokola mwasi mokonzi, nakufisa mobali te mpe nakotikala kosala matanga ata mokolo moko te. ›


Bagangaki na mbala ya mibale : « Aleluya ! Pamba te molinga kowuta na mwasi ya ndumba monene ezali komata na likolo mpo na libela na libela ! »


Boye, nakobwaka ye na mbeto ya pasi makasi elongo na bato oyo basalaka kindumba elongo na ye. Kasi soki babongoli mitema mpe batiki kotambola kolanda mateya ya Jezabeli, nakobwaka bango te na mbeto ya pasi makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ