Na mokolo wana, Yawe akopesa etumbu na Leviatani, nyoka oyo ekimaka, na Leviatani, nyoka ya somo, na nzela ya mopanga na Ye ya minu, mopanga na Ye ya monene mpe ya nguya ; akoboma elima ya ebale monene.
‹ Tala, nazali na kanda na yo, yo mboka ya lolendo, › elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ; ‹ pamba te mokolo na yo ekoki, tango na yo ya kozwa etumbu.
Nzokande, Mosikoli na bango azali na makasi, Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ; akokotela bango na molende mpo ete amema kimia na mokili na bango mpe mobulu epai ya bavandi ya Babiloni.
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bamir nyonso ya milayi ya Babiloni ekokweyisama mpe bikuke na yango nyonso ya minene ekozikisama na moto ; bato bazali kosala bobele mosala ya pamba mpe bato ya bikolo mosusu bazali komimonisa pasi mpo na mosala oyo ekobeba na moto. »
Bobima na Babiloni, bobikisa bomoi na bino ! Soki te, bokokufa likolo ya masumu na bango. Ezali tango oyo Yawe alingi kozongisela bango mabe na mabe mpe kofuta bango ndenge ezali misala na bango.
Yawe azali koganga lokola kake na liboso ya mampinga na Ye. Milongo ya mampinga na Ye etonda na basoda ; basoda oyo batosaka mitindo na Ye bazali na nguya. Mokolo ya Yawe ezali monene, ezali somo makasi ; nani akoki kotelema na mokolo yango ?
Nyama mpe maseke zomi oyo omonaki ekoyina mwasi ya ndumba, ekobotola biloko na ye nyonso mpe ekotika ye bolumbu ; ekolia misuni na ye mpe ekotumba ye na nzela ya moto.
Kaka na ngonga moko, bomengo nyonso esili ! › Batambolisi nyonso ya bamasuwa, bato nyonso oyo basalaka mibembo na bamasuwa, bato oyo basalaka kati na bamasuwa mpe ba-oyo basalaka mombongo na nzela ya mayi, bakotelema na mosika.
Bakobwaka putulu na mito na bango, bakolela, bakosala matanga mpe bakoganga makasi : ‹ Mawa ! Mawa na yo, engumba monene epai wapi bato nyonso oyo bazalaki na bamasuwa na likolo ya ebale monene bakomaki bazwi mpo na bomengo na yo ! Na ngonga moko kaka, obebisami ! ›