Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 18:23 - Mokanda na Bomoi

23 Mwinda ekopela lisusu te kati na yo, mpe mongongo ya mobali mpe mwasi oyo bawuti kobalana ekoyokana lisusu te kati na yo. Makambo wana nyonso ekosalema, pamba te bato na yo ya mombongo bazalaki bato na nguya ya mokili. Okosaki bato ya bikolo nyonso na nzela ya maji na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 18:23
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango kaka Yorami amonaki Jewu, atunaki ye : — Boni Jewu, oyei mpo na kimia ? Jewu azongisaki : — Ndenge nini kimia ekoki kozala na tango losambo ya banzambe ya bikeko mpe kindoki ya mama na yo, Jezabeli, ezali kokoba ?


Mbala boni bazali koboma mwinda ya bato mabe ? Mbala boni pasi ezali kokitela bango ? Boni, Nzambe abombeli bango kanda na Ye ?


pamba te lobi ya malamu ekozala te mpo na moto oyo asalaka mabe, mpe mwinda ya bato mabe ekokufa.


Nani azwaki mokano oyo mpo na kobebisa Tiri ? Tiri oyo azalaki kokabola mitole, oyo bato na ye ya mombongo bazalaki komimona lokola bakonzi ; mpe oyo bato na ye ya nkita bazalaki komimona lokola bato oyo baleki bato nyonso ya mokili na lokumu.


Makambo mibale oyo ekokomela yo mbala moko mpe kaka na mokolo moko : kozanga bana mpe kokufisa mobali. Makambo oyo eleka ndelo nde ekokomela yo, ata kindoki na yo ezali makasi mpe bakisi na yo ezali na nguya.


pamba te tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nakosilisa kati na esika oyo, na miso na bino mpe na tango na bino, makelele ya esengo mpe makelele ya kosepela, mingongo ya babalani mpe ya babandami na libala.


Nakolongola kati na bango pole ya mwinda, banzembo ya esengo mpe kosepela, makelele ya bisengo ya libala ya sika mpe ya libanga oyo banikelaka ble.


Kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi, nakosilisa koganga ya esengo mpe ya kosepela, mongongo ya mobali ya libala mpe ya mwasi ya libala, pamba te mokili ekobeba.


Makambo oyo nyonso esalemi likolo ya makambo ya nkele ya engumba oyo etonda na kindumba, engumba ya kitoko makasi kasi etonda na misala ya soloka, engumba oyo epengwisaka bikolo na nzela ya kindumba na yango mpe epengwisaka bato na nzela ya misala na yango ya soloka.


Bazalaki kolanda ye mpo ete, wuta kala, azalaki kokamwisa bango na misala na ye ya maji.


Babwakaki dalagona monene, nyoka ya kala, oyo babengaka zabolo to Satana, oyo akosaka mokili mobimba. Ebwakamaki na mabele elongo na ba-anjelu na yango.


Bakonzi minene ya mokili basalaki ekobo elongo na ye, mpe bavandi ya mokili balangwaki vino ya kindumba na ye. »


Na mbunzu na ye, bakomaki kombo moko oyo ebombaki makambo ya somo mpe oyo ndimbola na yango ezali : Babiloni monene, Mama ya Basi ya Ndumba mpe ya Makambo ya Nkele ya Mokili.


Mindule ya babeti mandanda mpe ya bayembi, ya babeti piololo mpe babeti kelelo, ekoyokana lisusu te kati na yo. Bato ya misala ya maboko ya ndenge na ndenge bakomonana lisusu te kati na yo. Makelele ya mabanga minene oyo banikelaka ble ekoyokana lisusu te kati na yo.


Pamba te bikolo nyonso emelaki vino ya kanda ya kindumba na yango. Bakonzi ya mokili basalaki ekobo elongo na Babiloni, mpe bozwi ya bato ya mokili, oyo basalaka mombongo, emataki makasi mpo na monzele na yango, oyo elekaki ndelo. »


Tango bakonzi ya mokili, oyo bakabolaki elongo na yango bomoi na yango ya kindumba mpe ya bisengo, bakomona molinga ya engumba oyo etumbami, bakolela mpe bakoyoka mawa na tina na yango.


Kasi bato oyo batepaka-tepaka na kondima na bango, bato oyo bazangi kondima, bato oyo basalaka makambo ya soni, babomi, bandumba, bato ya maji, basambeli bikeko, mpe bato nyonso ya lokuta, bakobwakama kati na liziba ya moto mpe ya sofolo : yango nde kufa ya mibale. »


Kasi bambwa, bato ya maji, bandumba, babomi, basambeli bikeko mpe bato nyonso oyo balingaka mpe basalelaka lokuta, bakozala na libanda ya engumba.


Butu ekozala lisusu te. Bakozala na posa te ya pole ya mwinda to ya moyi, pamba te Nkolo Nzambe akongengisa bango na pole na Ye. Mpe bakokonza seko na seko.


Bakonzi ya mabele, bato minene, bakonzi ya mampinga ya basoda, bazwi, bato ya nguya, bawumbu mpe bansomi bakendeki kobombama kati na madusu ya mabanga mpe kati na mabanga minene ya bangomba.


Batikaki mpe te koboma bato, misala na bango ya maji, kindumba na bango mpe moyibi na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ