Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 18:22 - Mokanda na Bomoi

22 Mindule ya babeti mandanda mpe ya bayembi, ya babeti piololo mpe babeti kelelo, ekoyokana lisusu te kati na yo. Bato ya misala ya maboko ya ndenge na ndenge bakomonana lisusu te kati na yo. Makelele ya mabanga minene oyo banikelaka ble ekoyokana lisusu te kati na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 18:22
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete butu yango etikala ekomba, ete koganga moko te ya esengo eyokana na butu yango !


tango bikangelo ya ekuke ekokangama na balabala, mpe makelele ya basi oyo banikaka ble ekosila ; tango bato balamukaka na banzembo ya bandeke mpe bayembi ya basi batikaka koyemba ;


alobaki : « Okosepela lisusu te, yo Sidoni, mboka kitoko, yo oyo lokumu na yo esili kobebisama lelo ! Telema, katisa na ngambo ya Shipele ! Ezala kuna, okozwa bopemi te. »


pamba te tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nakosilisa kati na esika oyo, na miso na bino mpe na tango na bino, makelele ya esengo mpe makelele ya kosepela, mingongo ya babalani mpe ya babandami na libala.


Nakolongola kati na bango pole ya mwinda, banzembo ya esengo mpe kosepela, makelele ya bisengo ya libala ya sika mpe ya libanga oyo banikelaka ble.


ekoyokana kuna lokito ya banzembo ya esengo mpe ya masanzoli, mingongo ya mobandami na libala ya mwasi mpe ya mobali, mpe mingongo ya bato oyo bazali kobonza kati na Tempelo ya Yawe makabo ya kozongisa matondi, na koloba : ‘ Bozongisa matondi epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpo ete Yawe azali malamu ; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! ’ Pamba te nakozongisa lisusu kitoko ya mokili yango ndenge ezalaki liboso, › elobi Yawe.


Kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi, nakosilisa koganga ya esengo mpe ya kosepela, mongongo ya mobali ya libala mpe ya mwasi ya libala, pamba te mokili ekobeba.


Nakosukisa makelele ya banzembo na yo, mpe mindule ya lindanda na yo ekotikala koyokana lisusu te.


Tango Yesu akomaki na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani, amonaki babeti flite mpe bato ebele bazali kotia makelele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ