Tala, Yawe azali kobima wuta na esika na Ye mpo na kopesa bato ya mokili etumbu mpo na masumu na bango ; mabele ekobimisa makila oyo basopa likolo na yango, ekobomba lisusu te bato oyo baboma.
Oh Lola, yemba banzembo ya esengo, pamba te Yawe nde asali bongo ! Oh mozindo ya mokili, tombola mongongo ! Oh bino bangomba, bazamba mpe banzete nyonso kati na yango, boyemba banzembo ya elonga ! Pamba te Yawe asikolaki Jakobi, amonisi nkembo na Ye kati na Isalaele.
Oh likolo, ganga na esengo ! Oh mabele, sepela ! Oh bangomba, boyemba banzembo ! Pamba te Yawe abondisi bato na Ye mpe ayokeli mawa bato oyo banyokwamaki.
Nzambe akotisi bino kati na ndako oyo moboko na yango ezali bantoma mpe basakoli, mpe Ye moko Yesu-Klisto azali libanga na yango ya motuya mpo na kosimba ndako mobimba.
Tango mopanga na Ngai ekozala kosasa misuni ya bato, nakolangwisa makonga na Ngai na makila ya bato oyo babomi, ya bakangami mpe ya mito ya bakonzi ya banguna. »
Yango wana, yo Lola, sepela ; mpe bino bavandi ya Lola, bosepela ! Kasi mawa na mokili mpe na ebale monene, pamba te Satana akiti epai na bino ! Atondi na kanda, pamba te ayebi malamu ete atikali kaka na tango moke. »
Bagangaki na mongongo makasi : « Nkolo Nzambe, Yo oyo ozali Bule mpe Solo, okozela kino tango nini mpo na kosambisa bavandi ya mokili mpe kopesa bango etumbu mpo na makila na biso ? »
Yawe, tika ete banguna na Yo nyonso bakufa bongo ! Tika ete bato oyo balingaka Yo bangenga makasi lokola moyi ya midi ! Mokili ezalaki na kimia mibu tuku minei.