Emoniseli 18:2 - Mokanda na Bomoi2 Agangaki na mongongo makasi : « Ekweyi ! Ekweyi ! Babiloni monene ekweyi penza ! Ekomi ndako ya milimo mabe, ebombamelo ya milimo nyonso ya mbindo, ya bandeke ya mbindo mpe ya banyama ya nkele. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sakola maloba oyo nyonso mpo na kotelemela bango mpe loba na bango : ‹ Yawe azali koganga wuta na likolo, azali kotomboka lokola kake wuta na Esika na Ye ya bule, azali konguluma makasi mpo na kotelemela mokili na Ye ! Akoganga lokola bato oyo bakamolaka mbuma ya vino, akogangela bavandi nyonso ya mokili oyo !
Ekokoma esika oyo bitonga mpe banyama ya ndenge na ndenge ekokoma kolala. Esulungutu mpe kombekombe ekokoma kolekisa butu na yango na basonge ya bandako na yango. Kolela na yango ekoyokana kino na maninisa, libebi na libebi nde ekomonana na bikotelo ya bandako, mpe mabaya ya banzete ya sedele ekotikala polele.