Molinga ya pasi na bango ekomata na likolo mpo na libela na libela. Butu mpe moyi, bopemi ekozala te mpo na bato oyo bagumbamelaka nyama mpe ekeko na yango, mpe mpo na moto nyonso oyo akondima kozwa elembo ya kombo na yango. »
Engumba monene ekabwanaki na biteni misato, mpe bingumba ya bikolo nyonso ebukanaki. Bongo Nzambe akanisaki Babiloni monene mpe apesaki yango kopo etonda na vino ya kanda na Ye ya makasi.
Bakoloba : ‹ Mawa ! Mawa na yo, engumba monene, yo oyo ozalaki kolata bilamba ya lino ya kitoko, bilamba ya motane makasi, babiju ya wolo, mabanga ya talo, mpe mayaka !