Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 18:11 - Mokanda na Bomoi

11 Bongo bato ya mombongo ya mokili bakolela mpe bakosala matanga na tina na yango, pamba te moko te akosomba lisusu biloko na yango :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 18:11
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te kozala na yango eleki kozala na palata na motuya, mpe lifuti na yango eleki wolo oyo balekisi na moto na motuya.


Nzambe akokweyisa Babiloni, kongenga ya babokonzi, nkembo ya lolendo ya bato ya Chalide, ndenge akweyisaki Sodome mpe Gomore.


Ezali bongo nde bakokoma liboso na yo, bato nyonso oyo ozalaki komonela pasi, mpe bato oyo ozalaki kosala elongo na bango wuta bolenge na yo. Moko na moko na bango akoyengayenga na ngambo na ye, moko te akobikisa yo !


Bampaka ya engumba Gebali mpe bato na yango ya bwanya nde bazalaki kosala epai na yo mosala ya kobamba madusu na yo mpo ete mayi ekota te ; bamasuwa nyonso ya ebale monene mpe batambolisi na yango bazalaki koya epai na yo mpo na kosomba biloko oyo ozalaki koteka.


Bino bavandi ya etuka Makiteshi, bolela, pamba te bato nyonso ya mombongo bakokufa, mpe bato nyonso oyo batekaka palata bakobebisama !


Na mokolo ya kanda na Yawe, ezala palata to wolo na bango ekobikisa bango te. Na moto ya zuwa na Ye, mokili mobimba ekozikisama, pamba te akosukisa na mbalakata bavandi nyonso ya mokili.


Kasi babengami na feti bazwaki kobengama yango na pamba : bamoko bakendeki na bilanga na bango ; bamosusu, na mombongo na bango ;


Alobaki na bato oyo bazalaki koteka bibenga : « Bolongola biloko oyo awa ! Ezali Ndako ya Tata na Ngai ! Ebandi ndenge nini bokomisa yango zando ? »


Kati na lokoso na bango, bakobetela bino masolo ya lokuta mpo na kobenda bino mbongo na nzela ya maloba ya sukali. Nzokande, wuta kala, Nzambe akatela bango etumbu oyo ekoki mpo na bango, mpe libebi ezali penza kozela bango.


Bato ya mombongo oyo bamonaki bomengo komata mpo ete bazalaki kotekela engumba yango biloko na bango, bakotelema na mosika mpo na somo ya pasi oyo ekokweyela yango. Bakolela mpe bakosala matanga.


Likolo, sepela na libebi na yango ! Bino mpe basantu, bosepela ! Bino bantoma mpe basakoli, bosepela mpe lokola ! Pamba te Nzambe alongisi bino awa akateli yango etumbu. »


Mwinda ekopela lisusu te kati na yo, mpe mongongo ya mobali mpe mwasi oyo bawuti kobalana ekoyokana lisusu te kati na yo. Makambo wana nyonso ekosalema, pamba te bato na yo ya mombongo bazalaki bato na nguya ya mokili. Okosaki bato ya bikolo nyonso na nzela ya maji na yo.


Pamba te bikolo nyonso emelaki vino ya kanda ya kindumba na yango. Bakonzi ya mokili basalaki ekobo elongo na Babiloni, mpe bozwi ya bato ya mokili, oyo basalaka mombongo, emataki makasi mpo na monzele na yango, oyo elekaki ndelo. »


Tango bakonzi ya mokili, oyo bakabolaki elongo na yango bomoi na yango ya kindumba mpe ya bisengo, bakomona molinga ya engumba oyo etumbami, bakolela mpe bakoyoka mawa na tina na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ