Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 18:1 - Mokanda na Bomoi

1 Sima na makambo wana, namonaki anjelu mosusu kokita wuta na Lola ; azalaki na bokonzi monene, mpe nkembo na ye engengisaki mokili.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 18:1
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe namonaki nkembo na Nzambe ya Isalaele koya wuta na ngambo ya este. Mongongo na Ye ezalaki lokola makelele ya mayi minene, mpe mokili ekomaki kongenga na nkembo na Ye.


Pamba te, na mokolo na Ye, Mwana na Moto akozala lokola mokalikali oyo epeli mpe engengisi likolo longwa na este kino na weste.


mpo ete motomboki amonisama, ye oyo Nkolo Yesu akoboma na nzela ya Liloba kowuta na monoko na Ye mpe akobebisa tango akoya na nzela ya nkembo ya boyei na Ye.


Bongo namonaki anjelu mosusu ya nguya makasi kokita wuta na Lola ; lipata moko ezipaki ye mpe monama ezingelaki moto na ye. Elongi na ye ezali kongenga lokola moyi, mpe makolo na ye ezalaki lokola makonzi ya moto.


Moko kati na ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakopo sambo ayaki mpe alobaki na ngai : « Yaka, nakolakisa yo etumbu oyo mwasi ya ndumba monene oyo avandaka na bibale minene akozwa.


Bongo anjelu alobaki na ngai : « Mpo na nini ozali komitungisa ? Nakoyebisa yo mabombami ya mwasi wana mpe ya nyama oyo ememi ye, nyama oyo ezali na mito sambo mpe na maseke zomi.


Engumba yango ezali na posa te ya moyi to ya sanza mpo na kongengisa yango, pamba te engengisamaka na nkembo ya Nzambe ; bongo Mpate azali mwinda na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ