Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 17:9 - Mokanda na Bomoi

9 Makambo oyo ezali penza kosenga mayele oyo bwanya engengisaka mpo na kososola yango. Mito sambo ezali bangomba sambo epai wapi mwasi avandaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 17:9
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi yo, Daniele, batela maloba oyo lokola sekele mpe kanga buku kino na tango ya suka. Mingi bakotambola bipai na bipai, mpe boyebi ya bato ekokola makasi. »


Efrayimi akoloba : « Banzambe ya bikeko ezali lisusu na tina nini epai na Ngai ? » Ngai nakoyanola ye mpe nakosunga ye. Nazali lokola nzete ya sipele ya mobesu, Ngai nde nasalaka ete obota mbuma.


Yesu azongiselaki bango : — Ezali mpo ete boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Likolo epesameli nde na bino, kasi na bango te.


Yango wana, tango bokomona makambo ya nkele oyo epesaka bato pasi na motema, oyo mosakoli Daniele alobelaki, kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu—


Bongo namonaki nyama moko kobima longwa na ebale monene. Ezalaki na maseke zomi mpe mito sambo. Elataki mitole zomi na maseke na yango ; mpe na mito na yango, bakomaki bakombo mpo na kofinga Nzambe.


Makambo oyo ezali penza kosenga bwanya. Tika ete moto oyo azali na mayele alimbola motango ya nyama, pamba te ezali kotalisa kombo ya moto ! Motango yango ezali : nkama motoba na tuku motoba na motoba.


Mwasi oyo omonaki ezali engumba monene oyo ekonzaka bakonzi ya mokili. »


Bongo kati na Molimo, amemaki ngai kati na esobe moko. Mpe kuna, namonaki mwasi moko avanda na likolo ya nyama ya motane. Loposo ya nyama yango etondaki na bakombo oyo ezalaki kofinga Nzambe. Yango moko nyama ezalaki na mito sambo mpe na maseke zomi.


Bongo anjelu alobaki na ngai : « Mpo na nini ozali komitungisa ? Nakoyebisa yo mabombami ya mwasi wana mpe ya nyama oyo ememi ye, nyama oyo ezali na mito sambo mpe na maseke zomi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ