Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 17:8 - Mokanda na Bomoi

8 Nyama oyo omonaki ; oyo liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te ; ekobima wuta na libulu moko ya monene mpe ya molili makasi, mpe ekokende na libebi na yango. Bavandi ya mokili, ba-oyo bakombo na bango ekomama te kati na buku ya bomoi wuta na ebandeli ya mokili bakokamwa tango bakomona nyama ; pamba te liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te, kasi ekoya lisusu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 17:8
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakisa mabe na likolo ya mabe na bango, mpe kokota likambo na bango te na bosembo na Yo.


Akotelemisa bandako na ye ya kapo ya bokonzi na ngambo moko ya ebale monene, pembeni ya ngomba ya bule. Boye, akokoma na suka mpe moto oyo akosunga ye akozala te.


Nakobaki kotala mpo na maloba ya lofundu oyo liseke yango ezalaki koloba ; mpe wana nazalaki kaka kotala, babomaki nyama yango, nzoto na yango ebebaki mpe babwakaki yango na moto.


Kasi bato ya mibeko bakovanda lisanga mpe bakobotola ye bokonzi, mpe bokonzi yango ekokufa mpe ekolimwa libela.


Banyama minei ya minene, ekesana yango nyonso, ebimaki wuta na ebale monene.


Sima na yango, kati na emoniseli na ngai ya butu, namonaki nyama ya minei : ezalaki somo, ezalaki kobangisa mpe ezalaki na nguya makasi penza. Ezalaki na minu minene ya bibende ; ezalaki kolia, kopanzapanza mpe konyata misuni oyo ezalaki kotikala ; ekesenaki makasi na banyama nyonso ya liboso mpe ezalaki na maseke zomi.


Sima na yango, Mokonzi akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mobali : « Boya, bino bato oyo Tata na Ngai apambola, bokamata libula na bino, Bokonzi oyo babongisela bino wuta mokili ekelama.


Nzokande, bosepela te komona ete milimo mabe ezali kotosa bino ; bosepela nde ete bakombo na bino ekomami kati na Likolo.


Bongo milimo mabe yango ezalaki kosenga na Yesu ete atinda yango te kati na libulu ya mozindo.


Tata, nalingi ete bato oyo opesaki Ngai bazala elongo na Ngai kuna epai nazali kokende, mpo ete bamona nkembo na Ngai, nkembo oyo opesaki Ngai, pamba te olingaki Ngai liboso ete okela mokili.


Pamba te, kati na Klisto, apona biso liboso ete akela mokili, mpo ete tozala bato ya bule mpe bazanga pamela na miso na Ye. Kati na bolingo na Ye,


mpo ete bazala na elikya ya bomoi ya seko oyo Nzambe, Ye oyo akosaka te, alakaki biso wuta kala, liboso ya ebandeli ya tango,


Nzambe abongisaki Ye mpo na yango wuta kala, liboso ete akela mokili, mpe Klisto amonani na mikolo oyo ya suka likolo na bino.


Kasi tango bakosilisa kopesa litatoli na bango, nyama oyo ekobima wuta na libulu ya monene mpe ya molili makasi ekobundisa bango, ekolonga bango mpe ekoboma bango.


Bongo nyama oyo, liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te, yango nde mokonzi ya mwambe. Ezali mpe moko kati na bakonzi wana sambo, mpe ezali kokende na libebi na yango.


Bakonzi minene ya mokili basalaki ekobo elongo na ye, mpe bavandi ya mokili balangwaki vino ya kindumba na ye. »


Bongo Satana oyo azalaki kokosa bango abwakamaki na liziba ya moto mpe ya sofolo, epai wapi nyama mpe mosakoli ya lokuta babwakamaki. Bakonyokolama kuna seko na seko, butu mpe moyi.


Namonaki lisusu bakufi, bato minene mpe bato pamba batelemi liboso ya Kiti ya Bokonzi. Babuku efungolamaki. Mpe buku mosusu efungolamaki, yango nde buku ya bomoi. Bongo bakufi basambisamaki kolanda misala na bango ndenge ekomama kati na babuku.


Moto nyonso oyo kombo na ye ekomamaki te kati na buku ya bomoi abwakamaki kati na liziba ya moto.


Lokola obatelaki etinda na Ngai ya kozala na molende, Ngai mpe nakobatela yo na tango ya pasi oyo ekokweyela mokili mobimba mpo na komeka bavandi na yango.


Moto oyo akolonga, bakolatisa ye bilamba ya pembe lokola bango. Nakolongola kombo na ye te na buku ya bomoi, kasi nakondima yango liboso ya Tata na Ngai mpe liboso ya ba-anjelu na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ