Nalingaki lisusu koyeba ndimbola ya maseke zomi oyo ezalaki na moto na yango mpe ya liseke mosusu oyo ebimaki, oyo maseke misato kati na maseke wana zomi ekweyaki liboso na yango, oyo ezalaki na miso mpe na monoko oyo ezalaki koloba na lolendo, mpe oyo ezalaki makasi koleka maseke mosusu.
Sima na yango, elembo mosusu emonanaki na likolo, ezalaki dalagona moko ya monene mpe ya motane. Dalagona yango ezalaki na mito sambo mpe maseke zomi ; mpe na mito wana sambo, moko na moko ezalaki na motole.
Bongo namonaki nyama moko kobima longwa na ebale monene. Ezalaki na maseke zomi mpe mito sambo. Elataki mitole zomi na maseke na yango ; mpe na mito na yango, bakomaki bakombo mpo na kofinga Nzambe.
Nyama mpe maseke zomi oyo omonaki ekoyina mwasi ya ndumba, ekobotola biloko na ye nyonso mpe ekotika ye bolumbu ; ekolia misuni na ye mpe ekotumba ye na nzela ya moto.
Mpo na somo ya minyoko na yango, bakotelema na mosika mpe bakoganga : ‹ Mawa ! Mawa na yo, engumba monene ! Mawa na yo, Babiloni, engumba ya nguya ! Kobebisama na yo ezwi kaka ngonga moko pamba ! ›
Kaka na ngonga moko, bomengo nyonso esili ! › Batambolisi nyonso ya bamasuwa, bato nyonso oyo basalaka mibembo na bamasuwa, bato oyo basalaka kati na bamasuwa mpe ba-oyo basalaka mombongo na nzela ya mayi, bakotelema na mosika.
Bakobwaka putulu na mito na bango, bakolela, bakosala matanga mpe bakoganga makasi : ‹ Mawa ! Mawa na yo, engumba monene epai wapi bato nyonso oyo bazalaki na bamasuwa na likolo ya ebale monene bakomaki bazwi mpo na bomengo na yo ! Na ngonga moko kaka, obebisami ! ›