Na tango wana, bakobosana Tiri mibu tuku sambo kolanda molayi ya bomoi ya mokonzi moko. Kasi na suka ya mibu tuku sambo, ekosalema mpo na Tiri, makambo oyo baloba na nzembo oyo bayembelaka mwasi ya ndumba :
Ezalaki kosalela bokonzi nyonso ya nyama ya liboso na miso na yango. Ezalaki kotindika mokili mpe bavandi na yango mpo ete bagumbamela nyama ya liboso oyo esilaki kobikisama na pota na yango wana ya monene.
Bongo nyama oyo, liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te, yango nde mokonzi ya mwambe. Ezali mpe moko kati na bakonzi wana sambo, mpe ezali kokende na libebi na yango.
Nyama mpe maseke zomi oyo omonaki ekoyina mwasi ya ndumba, ekobotola biloko na ye nyonso mpe ekotika ye bolumbu ; ekolia misuni na ye mpe ekotumba ye na nzela ya moto.