1 Moko kati na ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakopo sambo ayaki mpe alobaki na ngai : « Yaka, nakolakisa yo etumbu oyo mwasi ya ndumba monene oyo avandaka na bibale minene akozwa.
« Wuta kala, ozalaki kobuka ekangiseli na yo mpe kokata minyololo na yo. Ozalaki koloba : ‹ Nakozala lisusu mowumbu na yo te. › Yango wana, okomaki komilalisa na bangomba nyonso ya milayi mpe na se ya banzete nyonso ya mibesu lokola mwasi ya ndumba.
Mayi ezalaki kokolisa yango, mpe mayi ya se ya mabele ezalaki koyeisa yango molayi ; ebimisaki miluka zingazinga ya esika oyo balonaki yango mpe epanzanaki kino na banzete nyonso ya zamba.
Emoniseli kowuta na Yesu-Klisto. Nzambe apesaki Ye yango mpo ete alakisa na basali na Ye makambo oyo esengeli koya kala mingi te. Yesu-Klisto atindaki anjelu na Ye koyebisa emoniseli yango epai ya Yoane, mosali na Ye.
Bongo namonaki elembo mosusu ya monene mpe ya kokamwa kati na Lola : ba-anjelu sambo bamemaki bitumbu sambo ya suka, pamba te ezali na nzela na yango nde kanda ya Nzambe ekokokisama.
Engumba monene ekabwanaki na biteni misato, mpe bingumba ya bikolo nyonso ebukanaki. Bongo Nzambe akanisaki Babiloni monene mpe apesaki yango kopo etonda na vino ya kanda na Ye ya makasi.
pamba te akataka makambo na bosolo mpe na bosembo ; apesi etumbu epai ya mwasi ya ndumba monene oyo azalaki kobebisa mokili na nzela ya kindumba na ye, mpe azongisi mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na Ye. »
Bongo anjelu alobaki na ngai : « Koma : ‹ Esengo na bato oyo babengami na feti ya libala ya Mpate ! › » Alobaki lisusu : « Ezali maloba ya solo ya Nzambe. »
Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai asimbaki lokola emekelo molayi lingenda basala na wolo, mpo na komeka molayi ya engumba, ya bikuke na yango mpe ya mir na yango.
Moko kati na ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakopo sambo etonda na bitumbu sambo ya suka ayaki mpe alobaki na ngai : « Yaka, nakolakisa yo mwasi mobandami ya libala, mwasi ya Mpate. »
Sima na makambo oyo, namonaki ekuke moko efungwama kati na Lola. Bongo mongongo oyo nayokaki koloba na ngai lokola kelelo na mbala ya liboso elobaki na ngai lisusu : « Mata awa, mpe nakolakisa yo makambo oyo esengeli koya sima na oyo. »