3 Anjelu ya mibale asopaki kopo na ye na ebale monene, mpe ebale yango ekomaki lokola makila ya mowei ; mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezalaki kati na ebale monene ekufaki.
Nakopesa yo etumbu oyo ebongi na basi ya ndumba mpe na ba-oyo basopaka makila. Okofuta yango na motuya ya makila na yo, mpo na kanda mpe zuwa ya bolingo na Ngai oyo osambwisi.
Batatoli yango mibale bazali na nguya ya kokanga Likolo mpo ete mvula enoka te na mikolo oyo bakozala kosakola. Bazali mpe na nguya ya kobongola mayi mpo ete ekoma makila, mpe ya kotinda pasi ya lolenge nyonso na mabele, na tango nyonso oyo balingi.
Bongo namonaki nyama moko kobima longwa na ebale monene. Ezalaki na maseke zomi mpe mito sambo. Elataki mitole zomi na maseke na yango ; mpe na mito na yango, bakomaki bakombo mpo na kofinga Nzambe.