Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 16:21 - Mokanda na Bomoi

21 Bamvula minene ya mabanga enokaki ; libanga moko na moko ezalaki na bakilo pene tuku minei na mitano, mpe ekweyelaki bato longwa na likolo. Mpe bato bafingaki Nzambe mpo na pasi ya mvula wana ya mabanga, pamba te pasi yango ezalaki ya somo makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 16:21
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, osila kokoma na esika oyo babombaka mvula ya pembe mpe na esika oyo babombaka mvula ya mabanga ?


Nabombaki yango mpo na tango ya pasi mpe mpo na mikolo ya bitumba.


lobi na ngonga oyo, nakobetisa mvula ya mabanga ya moto makasi, oyo etikala nanu kobeta te wuta mokili ya Ejipito ezala.


Yawe alobaki na Moyize : « Sembola loboko na yo na likolo mpo ete mvula ya mabanga enoka na mokili mobimba ya Ejipito : likolo ya bato, ya bibwele mpe ya matiti nyonso oyo ebotaka na elanga kati na Ejipito. »


Yawe akosala ete bato bayoka mongongo na Ye ya nkembo mpe akomonisa bango nguya ya loboko na Ye kati na kanda makasi na Ye, kati na moto oyo ebomaka, kati na mvula makasi ya bakake mpe ya mabanga.


Bakokatisa mokili, na pasi mpe na nzala ; mpe tango bakokoma na nzala, bakokoma kanda-kanda, bakotala likolo mpe bakolakela mokonzi mpe Nzambe na bango mabe.


yebisa bato oyo bapakolaka yango potopoto ya pembe ete mir ekokweya. Nakonokisa mvula moko ya makasi mpe ya mabanga, bongo mipepe makasi ekotomboka.


Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakotinda mopepe moko ya makasi, kati na kanda na Ngai, mpe nakonokisa mvula moko ya makasi mpe ya mabanga, kati na kotomboka na Ngai, mpo na kobebisa nyonso nye.


Wana bazalaki kokima liboso ya Isalaele mpe kokita na Beti-Oroni, Yawe akitiselaki bango mabanga minene wuta na likolo kino na Azeka, mpe bakufaki. Bato oyo bakufaki na mabanga ya moto bazalaki motango ebele koleka ata bato oyo bana ya Isalaele babomaki na mopanga.


Bongo Tempelo ya Nzambe, oyo ezali kati na Lola efungwamaki, mpe Sanduku ya Boyokani na Ye emonanaki kuna kati na Tempelo ya Nzambe. Mpe mikalikali epelaki, mingongo mpe lokito ya bakake eyokanaki, mabele eninganaki, mpe mvula monene ya mabanga enokaki.


bafingaki Nzambe ya Lola mpo na pasi mpe bapota na bango ya minene. Kasi baboyaki kaka kotika misala na bango ya mabe.


Moto makasi etumbaki bato, mpe bakomaki kofinga Kombo ya Nzambe oyo azali na bokonzi likolo ya pasi wana. Kasi baboyaki kobongola mitema na bango mpe kopesa Ye nkembo.


Anjelu ya liboso abetaki kelelo ; mpe, mbala moko, mvula ya mabanga mike elongo na moto esangana na makila ebwakamaki na mabele. Bongo biloko oyo ezikaki : eteni moko kati na biteni misato ya mabele, eteni moko kati na biteni misato ya banzete, mpe matiti nyonso ya mobesu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ