Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 16:19 - Mokanda na Bomoi

19 Engumba monene ekabwanaki na biteni misato, mpe bingumba ya bikolo nyonso ebukanaki. Bongo Nzambe akanisaki Babiloni monene mpe apesaki yango kopo etonda na vino ya kanda na Ye ya makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 16:19
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakosala ete banyokoli na yo balia misuni na bango moko ; bakolangwa makila na bango moko ndenge balangwaka masanga ya vino. Boye, moto nyonso akoyeba ete Ngai Yawe, nazali Mobikisi na yo, Mosikoli na yo, Elombe ya Jakobi. »


bakonzi nyonso ya nor, oyo bazalaka pene mpe ba-oyo bazalaka mosika, moko pene na mosusu, bakonzi ya mboka nyonso oyo ezalaka na mokili. Sima na bango nyonso, mokonzi ya Sheshaki mpe akomela yango.


Mbala moko, makambo nyonso oyo elobamaki na tina na Nabukodonozori ekokisamaki. Babenganaki ye na molongo ya bato mpe akomaki kolia matiti lokola ngombe ; mamwe ekomaki kopolisa nzoto na ye kino suki na ye ekomaki milayi lokola masala ya mpongo ya mobange, mpe manzaka na ye lokola manzaka ya ndeke.


Bakotanda bibembe na bango, na etando epai wapi bato nyonso bakutanaka kati na engumba. Kolanda molimo oyo ekambaka engumba yango, babengaka etando yango Sodome mpe Ejipito. Ezali kuna na engumba yango nde Nkolo na bango abakamaki na ekulusu.


Moko kati na ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakopo sambo ayaki mpe alobaki na ngai : « Yaka, nakolakisa yo etumbu oyo mwasi ya ndumba monene oyo avandaka na bibale minene akozwa.


Mwasi oyo omonaki ezali engumba monene oyo ekonzaka bakonzi ya mokili. »


Na mbunzu na ye, bakomaki kombo moko oyo ebombaki makambo ya somo mpe oyo ndimbola na yango ezali : Babiloni monene, Mama ya Basi ya Ndumba mpe ya Makambo ya Nkele ya Mokili.


Mpo na somo ya minyoko na yango, bakotelema na mosika mpe bakoganga : ‹ Mawa ! Mawa na yo, engumba monene ! Mawa na yo, Babiloni, engumba ya nguya ! Kobebisama na yo ezwi kaka ngonga moko pamba ! ›


Agangaki na mongongo makasi : « Ekweyi ! Ekweyi ! Babiloni monene ekweyi penza ! Ekomi ndako ya milimo mabe, ebombamelo ya milimo nyonso ya mbindo, ya bandeke ya mbindo mpe ya banyama ya nkele.


Bongo anjelu moko ya nguya akamataki libanga moko oyo ezalaki lokola libanga oyo basalelaka mpo na konika ble, abwakaki yango na ebale monene mpe alobaki : « Babiloni, engumba monene, ekobwakama ndenge wana, kaka na makasi moko wana, mpe ekomonana lisusu te.


Pamba te masumu na yango esali mipiku kino na likolo, mpe Nzambe akanisi lisusu misala na yango nyonso ya mabe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ