14 Ezali milimo ya kindoki oyo esalaka bikamwa. Ebimi mpo na kokende epai ya bakonzi ya mokili mobimba, mpo na kosangisa bango mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.
Boye mokonzi ya Isalaele asangisaki basakoli pene nkama minei mpe atunaki bango : — Nakoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te ? Bazongiselaki ye : — Kende, pamba te Nkolo akokaba yango na maboko ya mokonzi.
Soki mosakoli moko akosami mpe asakoli makambo, ezali Ngai moko Yawe nde napengwisi ye. Boye, nakosembola loboko na Ngai mpo na kopesa ye etumbu, mpe nakobeta ye kati na bato na Ngai, Isalaele.
Na tango wana, Sezare Ogisite abimisaki mobeko ya kotanga motango ya bato nyonso oyo bazalaki kovanda na mikili nyonso oyo ezalaki na se ya bokonzi ya Rome.
Ezali Satana nde azali tata na bino, mpe bolingi nde kaka kokokisa posa ya tata na bino. Wuta na ebandeli, ye azala mobomi ; avandaka kati na solo te, pamba te solo ezalaka te kati na ye. Tango akosaka, alobaka penza makambo oyo ewutaka kati na ye ; pamba te azali mokosi mpe tata ya lokuta.
Ya liboso, nazali kozongisa matondi epai ya Nzambe na ngai, na nzela ya Yesu-Klisto, mpo na bino nyonso, pamba te bazali kolobela kondima na bino kati na mokili mobimba.
Babwakaki dalagona monene, nyoka ya kala, oyo babengaka zabolo to Satana, oyo akosaka mokili mobimba. Ebwakamaki na mabele elongo na ba-anjelu na yango.
Lokola obatelaki etinda na Ngai ya kozala na molende, Ngai mpe nakobatela yo na tango ya pasi oyo ekokweyela mokili mobimba mpo na komeka bavandi na yango.