Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 16:12 - Mokanda na Bomoi

12 Anjelu ya motoba asopaki kopo na ye na ebale Efrate, mpe mayi na yango ekawukaki mpo ete nzela ya bakonzi oyo bakowuta na Este esalema.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 16:12
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe akokawusa mayi ya eteni ya ebale oyo ekota na mabele ya Ejipito ; loboko na Ye ekoningisa ebale mpe akokabola yango na biteni sambo na mopepe makasi mpo ete bato bakoka kokatisa na makolo.


Nabimisaki moto moko wuta na ngambo ya nor, mpe azali koya, moto moko, wuta na ngambo ya este, oyo abelelaka Kombo na Ngai. Azali konyata bakambi ndenge banyataka potopoto, lokola potopoto ya mabele ya bikeko ya mosali mbeki.


Nakobebisa bangomba milayi mpe mikuse, nakokawusa banzete mpe matiti na yango nyonso, nakokomisa bibale, bisanga, mpe nakokawusa maziba ;


Nalobi na ebale monene : ‹ Kawuka, mpe nakokawusa bibale na yo ! ›


Wuta na este, nabengi ndeke oyo eliaka misuni ; longwa na mokili ya mosika, moto oyo akokokisa mabongisi na Ngai. Makambo oyo nalobaki, yango nde ekokokisama ; oyo nabongisaki, yango nde ekosalema.


Yawe akotindela bango mayi ya nguya mpe mayi ebele lokola mayi ya ebale Efrate : ekozala nde mokonzi ya Asiri elongo na mampinga na ye nyonso. Ekotonda penza meke mpe ekozipa bangambo nyonso.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Tala, nakozwa likambo na yo na maboko mpe nakozongisa mabe na bato oyo basalaki yo mabe, nakokawusa ebale na yango ya monene mpe nakokawusa maziba na yango.


Pasi ya mibale eleki ; mpe tala, pasi ya misato ezali koya kala mingi te.


Anjelu alobaki na ngai : « Mayi oyo omonaki, oyo mwasi ya ndumba avandaki na likolo na yango, ezali bato ya mokili, bangulupa ebele ya bato, bikolo mpe nkota.


Bongo namonaki anjelu mosusu azali komata longwa na este mpe asimbi kashe ya Nzambe na bomoi. Agangaki na mongongo makasi epai ya ba-anjelu minei oyo Nzambe apesaki nguya ya kosala mabe na mokili mpe na ebale monene.


Mongongo yango ezalaki koloba na anjelu ya motoba oyo azalaki na kelelo na maboko : « Fungola ba-anjelu minei oyo bazali ya kokangama na minyololo pembeni ya ebale monene Efrate. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ