Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 15:5 - Mokanda na Bomoi

5 Sima na yango, natalaki mpe namonaki Tempelo kofungwama kati na Lola ; mpe kati na yango, ezalaki na Mongombo ya Litatoli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 15:5
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okotia kati na sanduku, bitando ya mabanga ya mibeko oyo nakopesa yo mpe okotia mofinuku na likolo ya sanduku.


Tala motuya ya biloko oyo basalelaki Mongombo oyo, kati na yango, ezalaki na buku ya Boyokani, ndenge kaka Moyize atindaki. Balevi batongaki yango na bokambami ya Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron.


Okopesa na bato ya libota ya Levi mokumba ya Mongombo ya Litatoli mpe ya bisalelo na yango nyonso elongo na biloko nyonso oyo ezalaka kati na Mongombo. Bango bakozwa mokumba ya komemaka yango elongo na bisalelo na yango mpe bakovanda zingazinga na yango.


Kasi bato ya libota ya Levi bakotelemisa bandako na bango ya kapo zingazinga ya Mongombo ya Litatoli mpo ete kanda makasi ya Yawe ekoka kokweya likolo ya lisanga ya bana ya Isalaele te. Bato ya libota ya Levi nde bakosala mosala ya kobatela Mongombo ya Litatoli. »


Kaka na tango yango, rido ya Tempelo epasukaki na biteni mibale, kobanda na likolo kino na se, mabele eninganaki, mabanga minene epasukaki,


ba-oyo basalaka na Esika ya bule oyo ezali kaka elilingi mpe elili ya oyo ezali kati na Likolo. Yango wana, tango Moyize alingaki kotonga Mongombo, Nzambe akebisaki ye boye : « Tala malamu mpe sala mosala nyonso kolanda ndakisa oyo natalisi yo na likolo ya ngomba. »


Bongo Tempelo ya Nzambe, oyo ezali kati na Lola efungwamaki, mpe Sanduku ya Boyokani na Ye emonanaki kuna kati na Tempelo ya Nzambe. Mpe mikalikali epelaki, mingongo mpe lokito ya bakake eyokanaki, mabele eninganaki, mpe mvula monene ya mabanga enokaki.


Efungolaki monoko na yango mpe ekomaki kobimisa maloba ya kofinga Nzambe, Kombo na Ye, evandelo na Ye mpe bavandi ya Lola.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ