1 Bongo namonaki elembo mosusu ya monene mpe ya kokamwa kati na Lola : ba-anjelu sambo bamemaki bitumbu sambo ya suka, pamba te ezali na nzela na yango nde kanda ya Nzambe ekokokisama.
Napesi mitindo ete, na bituka nyonso ya mokili na ngai, bato nyonso batosa mpe bapesa Nzambe ya Daniele lokumu. Pamba te azali Nzambe na bomoi mpe ya seko na seko ; bokonzi na Ye ekotikala kobebisama te mpe ekowumela seko na seko.
ye mpe akomela vino ya kanda ya Nzambe, vino oyo basopaki ya peto, kati na kopo ya kanda na Ye. Mpe akonyokwama kati na moto ya sofolo liboso ya ba-anjelu ya bule mpe liboso ya Mpate.
Anjelu wana abwakaki mbeli na ye na mabele, abukaki maboke ya bambuma ya vino ya mabele mpe abwakaki yango kati na ekamolelo monene ya kanda ya Nzambe.
Bongo nayokaki mongongo moko monene kobima wuta na Tempelo mpe koloba na ba-anjelu sambo : « Bokende kosopa na mokili bakopo sambo ya kanda ya Nzambe. »
Moko kati na ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakopo sambo ayaki mpe alobaki na ngai : « Yaka, nakolakisa yo etumbu oyo mwasi ya ndumba monene oyo avandaka na bibale minene akozwa.
Mopanga moko ya minu ezalaki kobima na monoko na Ye mpo na kobeta bikolo. Akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akonika bambuma ya vino kati na ekamolelo ya vino ya kanda monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.
Moko kati na ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakopo sambo etonda na bitumbu sambo ya suka ayaki mpe alobaki na ngai : « Yaka, nakolakisa yo mwasi mobandami ya libala, mwasi ya Mpate. »
Bongo nayokaki mpongo, oyo ezalaki kopumbwa na likolo makasi, koloba na mongongo makasi : « Mawa ! Mawa ! Mawa penza na bavandi ya mokili tango ba-anjelu misato ya suka bakobeta bakelelo na bango ! »
Kasi bato oyo bakufaki te na nzela ya bapasi wana batikaki te banzambe oyo maboko na bango moko esalaki ; batikaki te kogumbamela milimo mabe mpe banzambe ya bikeko oyo basala na wolo, na palata, na bronze, na mabanga mpe na mabaya atako emonaka te, eyokaka te mpe eninganaka te.