Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 14:8 - Mokanda na Bomoi

8 Anjelu ya mibale alandaki mpe alobaki : « Babiloni monene ekweyi, ekweyi penza ! Emelisaki bikolo nyonso vino ya kanda ya kindumba na yango. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 14:8
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Maloba ya kosambisa Babiloni, oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, azwaki na emoniseli :


Tala, moto moko azali koya awa na shar, oyo bampunda mibale ezali kobenda. Azongisaki eyano : ‹ Babiloni esili kokweya, ekweyi solo ! Banzambe na yango nyonso ya bikeko elali-lali mpe epanzani na mabele ! › »


Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na Babiloni mpe bato na yango :


‹ Ezali boye nde Babiloni ekozinda mpe ekomata lisusu te, likolo ya pasi oyo nakotindela yango. Mpe bato na yango bakokweya. › » Maloba ya Jeremi esuki awa.


Mbala moko, makambo nyonso oyo elobamaki na tina na Nabukodonozori ekokisamaki. Babenganaki ye na molongo ya bato mpe akomaki kolia matiti lokola ngombe ; mamwe ekomaki kopolisa nzoto na ye kino suki na ye ekomaki milayi lokola masala ya mpongo ya mobange, mpe manzaka na ye lokola manzaka ya ndeke.


Ezali ata na kisi moko te oyo ekoki kobikisa pota na yo ; pota na yo ezali monene makasi ! Moto nyonso oyo akoyoka sango ya makambo oyo ekomeli yo akobeta maboko mpo na kokweyisama na yo. Pamba te nani oyo ozangaki kosala mabe ?


Bakotanda bibembe na bango, na etando epai wapi bato nyonso bakutanaka kati na engumba. Kolanda molimo oyo ekambaka engumba yango, babengaka etando yango Sodome mpe Ejipito. Ezali kuna na engumba yango nde Nkolo na bango abakamaki na ekulusu.


Engumba monene ekabwanaki na biteni misato, mpe bingumba ya bikolo nyonso ebukanaki. Bongo Nzambe akanisaki Babiloni monene mpe apesaki yango kopo etonda na vino ya kanda na Ye ya makasi.


Mwasi oyo omonaki ezali engumba monene oyo ekonzaka bakonzi ya mokili. »


pamba te akataka makambo na bosolo mpe na bosembo ; apesi etumbu epai ya mwasi ya ndumba monene oyo azalaki kobebisa mokili na nzela ya kindumba na ye, mpe azongisi mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na Ye. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ