Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 14:6 - Mokanda na Bomoi

6 Bongo namonaki anjelu mosusu kopumbwa na likolo makasi. Azalaki na Sango Malamu ya seko na seko ya kosakola na bavandi nyonso ya mokili, na bikolo nyonso, na mabota nyonso, na nkota nyonso mpe na bato nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 14:6
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete etando ezala kati na mayi mpo na kokabola yango ! »


Ezali bongo te mpo na libota na ngai liboso ya Nzambe, pamba te asalaki boyokani ya libela elongo na ngai, boyokani oyo esalema malamu na makambo nyonso, mpe oyo Ye moko abatelaka ? Tango nyonso mpe na makambo nyonso, apesaki ngai elonga mpe akokisaki posa ya motema na ngai.


Bosembo na Yo ekotikala bongo mpo na libela, ekotikala kobongwana te ; mpe mibeko na Yo ezali solo.


Tala soki nazali kotambola na nzela mabe mpe tambolisa ngai na nzela ya tango nyonso !


Ozali Mokonzi seko na seko, mpe bokonzi na Yo ekowumela libela na libela. Yawe akokisaka bilaka na Ye nyonso, asalaka nyonso na bolingo.


Matiti ekawukaka mpe fololo elembaka, kasi Liloba na Nzambe na biso ewumelaka seko na seko. »


Kasi Yawe akobikisa Isalaele na lobiko ya seko na seko. Bokotikalaka lisusu koyoka soni te mpe kosambwa te, libela na libela.


Botombola miso na bino na likolo, botala na se, na mabele ; likolo ekolimwa lokola milinga, mabele ekonuna lokola elamba, mpe bavandi na yango bakokufa lokola banzinzi. Kasi lobiko na ngai ekowumela seko na seko, bosembo na ngai ekotikala kokweya mokolo moko te.


Pamba te nseka ekolia bango lokola elamba, mpe bampese ekolia bango lokola elamba basala na bapwale ya meme ; kasi bosembo na ngai ekowumela seko na seko, mpe lobiko na ngai, bileko na bileko. »


Ba-anjelu oyo babengaka baserafe batelemaki na likolo na Ye ; moko na moko azalaki na mapapu motoba : mapapu mibale mpo na kozipa elongi, mibale mpo na kozipa makolo mpe mibale mpo na kopumbwa.


Bikelamu yango ezalaki kokende mpe kozonga lokola mikalikali.


Ngai, Nabukodonozori, nazalaki na kimia mpe nazalaki kosepela na bomengo kati na ndako na ngai.


wana nazalaki nanu koloba, kati na losambo, Gabrieli, moto oyo namonaki liboso kati na emoniseli, ayaki epai na ngai na lombangu, na tango ya makabo ya pokwa.


Makambo oyo nazali koyebisa bino sik’oyo kati na molili, boloba yango na moyi ; mpe oyo bazali koloba na bino na litoyi, bosakola yango wuta na likolo ya ndako.


Alobaki na bango : — Bokende na mokili mobimba, mpe boteya bato nyonso Sango Malamu.


Na Ye oyo azali na nguya ya kotelemisa bino ngwi na nzela ya Sango Malamu oyo nateyaka, mpe na nzela ya mateya ya Yesu-Klisto kolanda emoniseli ya mabombami ya Nzambe, oyo ebombama wuta kala,


Kasi bosengeli penza kowumela, kotelema ngwi mpe kolenda kati na kondima na bino ; mpe bosengeli koboya kopengwa mosika ya elikya oyo bozwaki wuta tango boyokaki Sango Malamu. Sango Malamu yango esakolamaki kati na bikelamu nyonso oyo ezali na se ya Likolo, mpe ngai Polo nakoma mosali na yango.


Tika ete Ye moko Yesu-Klisto, Nkolo na biso, mpe Nzambe, Tata na biso, oyo alingaki biso mpe apesaki biso, na ngolu na Ye, malendisi ya seko mpe elikya ya malamu,


Tika ete Nzambe ya kimia, Ye oyo asekwisaki kati na bakufi Mobateli monene ya bameme, Yesu, Nkolo na biso, na nzela ya makila ya Boyokani ya seko,


kasi Liloba na Nkolo ewumelaka seko na seko. » Nzokande, Liloba yango ezali nde Sango Malamu oyo bateyaki bino.


Bongo balobaki na ngai : « Osengeli lisusu kosakola na tina na bikolo ebele, mabota ebele, nkota ebele mpe bakonzi ebele. »


Kasi na mokolo oyo anjelu ya sambo akobeta kelelo na ye, mabombami ya Nzambe ekokokisama ndenge kaka asakolaki yango na basali na Ye, basakoli. »


Epesamelaki lisusu makoki ya kobundisa mpe kolonga basantu. Mpe epesamelaki bokonzi na likolo ya mabota nyonso, mikili nyonso, nkota nyonso mpe bikolo nyonso.


Lokola obatelaki etinda na Ngai ya kozala na molende, Ngai mpe nakobatela yo na tango ya pasi oyo ekokweyela mokili mobimba mpo na komeka bavandi na yango.


Mpe bayembaki nzembo ya sika : « Obongi na kozwa buku mpe kobuka bikangelo na yango, pamba te babomaki Yo ; bongo na nzela ya makila na Yo, osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, ya nkota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya mabota nyonso.


Bongo nayokaki mpongo, oyo ezalaki kopumbwa na likolo makasi, koloba na mongongo makasi : « Mawa ! Mawa ! Mawa penza na bavandi ya mokili tango ba-anjelu misato ya suka bakobeta bakelelo na bango ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ