Emoniseli 14:2 - Mokanda na Bomoi2 Nayokaki mongongo moko kowuta na Lola, ezalaki koyokana lokola makelele ya bibale minene mpe lokola lokito ya kake. Ezalaki lokola lokito ya babeti mandanda oyo bazali kobeta mandanda na bango အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Namonaki mpe eloko moko lokola etando : ezalaki lokola talatala, mpe monene lokola molayi ya ebale monene ; ezalaki kongala lokola libanga ya talo oyo babengaka krisitali esangana na moto. Namonaki lisusu ba-oyo balongaki nyama, ekeko na yango mpe motango ya kombo na yango ; bazalaki ya kotelema na likolo ya ebale monene oyo ezalaki lokola talatala mpe basimbaki mandanda oyo Nzambe apesaki bango.