Emoniseli 14:1 - Mokanda na Bomoi1 Bongo namonaki Mpate atelemi na ngomba Siona elongo na bato nkoto nkama moko na tuku minei na minei. Kombo ya Mpate mpe ya Tata na Ye ezalaki ya kokomama na bambunzu ya bato yango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Moto oyo akolonga, nakokomisa ye likonzi kati na Tempelo ya Nzambe na Ngai, mpe akotikala lisusu te kobima kuna. Nakokoma na likolo na ye Kombo ya Nzambe na Ngai mpe kombo ya engumba ya Nzambe na Ngai, Yelusalemi ya sika, oyo ekokita wuta na Lola, epai ya Nzambe na Ngai. Mpe lisusu, nakokoma Kombo na Ngai ya sika na likolo na ye.
Namonaki liboso na ngai mpunda moko ya langi ya mayi ya pondu ; kombo ya motambolisi na yango ezalaki « Kufa, » mpe mboka ya bakufi ezalaki kolanda motambolisi yango na sima. Bapesamelaki nguya ya koboma bato na nzela ya mopanga, ya nzala, ya bokono mpe ya banyama mabe, na etando ya eteni moko kati na biteni minei ya mokili.