Emoniseli 13:3 - Mokanda na Bomoi3 Moko kati na mito na yango ezalaki komonana lokola nde ezali na pota moko ya monene makasi oyo ekokaki komema yango na kufa, kasi pota yango esilaki. Mokili mobimba elulaki nyama yango mpe ekomaki kolanda yango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nyama oyo omonaki ; oyo liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te ; ekobima wuta na libulu moko ya monene mpe ya molili makasi, mpe ekokende na libebi na yango. Bavandi ya mokili, ba-oyo bakombo na bango ekomama te kati na buku ya bomoi wuta na ebandeli ya mokili bakokamwa tango bakomona nyama ; pamba te liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te, kasi ekoya lisusu.