Emoniseli 13:2 - Mokanda na Bomoi2 Nyama oyo namonaki ezalaki lokola nkoyi. Makolo na yango ezalaki lokola ya ngombolo, mpe monoko na yango lokola ya nkosi. Dalagona epesaki nyama wana nguya na yango, kiti na yango ya bokonzi mpe bokonzi monene. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bampunda na bango ekimaka mbangu koleka ata nkoyi, ezalaka na kanda makasi koleka ata mbwa ya zamba oyo ebimaka na pokwa mpo na koluka nyama ya kolia. Basoda na bango oyo batambolaka likolo ya bampunda batambolaka mbangu makasi mpe bawutaka mosika penza, bapumbwaka lokola mpongo soki ezali kokita na elulu mpo na kokanga nyama ya kolia.
Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo.