Emoniseli 13:16 - Mokanda na Bomoi16 Esengaki na makasi ete bato nyonso, ezala bato minene to bato pamba, bazwi to babola, bansomi to bawumbu, batiama elembo na loboko ya mobali to na mbunzu. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Namonaki mpe eloko moko lokola etando : ezalaki lokola talatala, mpe monene lokola molayi ya ebale monene ; ezalaki kongala lokola libanga ya talo oyo babengaka krisitali esangana na moto. Namonaki lisusu ba-oyo balongaki nyama, ekeko na yango mpe motango ya kombo na yango ; bazalaki ya kotelema na likolo ya ebale monene oyo ezalaki lokola talatala mpe basimbaki mandanda oyo Nzambe apesaki bango.
Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo.
Bongo namonaki bakiti ya bokonzi. Bato oyo bavandaki na bakiti yango bapesamelaki bokonzi ya kosambisa. Namonaki mpe milimo ya bato oyo bakataki bango mito mpo na litatoli na bango na tina na Yesu mpe na tina na Liloba na Nzambe, mpo ete bagumbamelaki te nyama mpe ekeko na yango mpe batiamaki te elembo na yango na bambunzu mpe na maboko na bango. Bazongaki na bomoi mpe bakonzaki elongo na Klisto mibu nkoto moko.