Emoniseli 13:15 - Mokanda na Bomoi15 Epesamelaki kutu makoki ya kopesa pema ya bomoi epai ya ekeko ya nyama ya liboso, mpo ete ekoka koloba mpe kobomisa bato nyonso oyo bakogumbamela yango te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo.
Bongo namonaki bakiti ya bokonzi. Bato oyo bavandaki na bakiti yango bapesamelaki bokonzi ya kosambisa. Namonaki mpe milimo ya bato oyo bakataki bango mito mpo na litatoli na bango na tina na Yesu mpe na tina na Liloba na Nzambe, mpo ete bagumbamelaki te nyama mpe ekeko na yango mpe batiamaki te elembo na yango na bambunzu mpe na maboko na bango. Bazongaki na bomoi mpe bakonzaki elongo na Klisto mibu nkoto moko.