Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 12:5 - Mokanda na Bomoi

5 Nzokande, mwasi yango abotaki mwana mobali oyo akokamba bikolo nyonso na nzela ya lingenda ya ebende. Bongo mwana na ye amemamaki epai ya Nzambe mpe epai ya Kiti na Ye ya Bokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 12:5
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Liboso ete ayoka pasi ya kobota, abotaki ; liboso ete pasi ya kobota ekomela ye, abotaki mwana mobali.


Ye moko Nkolo akopesa bino elembo : moseka akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, akopesa Ye Kombo « Emanwele. »


Oh elenge mwasi ya mobulu, kino tango nini okotika kotambola-tambola ? Yawe akosala likambo ya sika na mabele : mwana mwasi akoluka mwana mobali na bolingo. »


Akotelema mpe akobatela bibwele na ye na nguya na Yawe, na lokumu ya Kombo ya Nzambe na ye ; mpe bakovanda na kimia, pamba te sango ya lokumu ya kombo na ye ekopanzana mokili mobimba.


Kasi Jozefi asangisaki nzoto te na Mari kino tango Mari abotaki mwana mobali ; mpe Jozefi apesaki Ye kombo Yesu.


Sima na Nkolo Yesu koloba na bango, amemamaki kati na Likolo mpe avandaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe.


Nayebi moto moko kati na Klisto, oyo, wuta mibu zomi na minei, amemamaki kino na likolo ya misato : nayebi te soki ezalaki kati na nzoto na ye to mpe kati na nzoto na ye te, kasi Nzambe ayebi.


amemamaki na paradizo mpe ayokaki maloba oyo moto akoki kolimbola te, makambo oyo moto azali na ndingisa te ya koloba.


Mongongo moko ya makasi kowuta na Lola elobaki na batatoli wana mibale : « Bomata awa ! » Bamataki na likolo kati na lipata, wana banguna na bango bazalaki kotala.


Tango dalagona emonaki ete ebwakami na mokili, ekomaki kolanda mwasi oyo abotaki mwana mobali.


Azalaki na zemi mpe, lokola azalaki koyoka pasi ya kobota, azalaki koganga makasi mpo na pasi.


Mopanga moko ya minu ezalaki kobima na monoko na Ye mpo na kobeta bikolo. Akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akonika bambuma ya vino kati na ekamolelo ya vino ya kanda monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ