Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 12:14 - Mokanda na Bomoi

14 Kasi mapapu nyonso mibale ya mpongo moko ya monene epesamaki na mwasi yango mpo ete apumbwa kino na esika na ye, na esobe epai wapi asengeli kosungama, mosika ya nyoka, mpo na tango moko, mpo na batango, mpe mpo na ndambo ya tango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 12:14
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakomi kobanga mpe kolenga, somo monene ekangi ngai.


« Bomonaki bino moko ndenge nini nasalaki bato ya Ejipito mpe ndenge nini namemaki bino lokola na mapapu ya mpongo kino epai na Ngai.


basi bato oyo batiaka elikya na Yawe, Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika : bapumbwaka likolo lokola bampongo, bapotaka mbangu mpe bapemaka te, batambolaka mpe balembaka te.


Moto oyo alataki bilamba ya lino mpe atelemaki likolo ya mayi ya ebale atombolaki loboko na ye ya mobali mpe loboko na ye ya mwasi na likolo, mpe nayokaki ye kolapa ndayi na Kombo ya Ye oyo azali na bomoi seko na seko : — Ekozala mibu misato na ndambo. Tango nguya ya ekolo ya bule ekosila, makambo oyo nyonso ekokokisama.


akotiola na maloba na ye Ye-Oyo-Aleki-Likolo, akonyokola basantu na Ye, akomeka ata kobongola manaka ya bafeti oyo ekatama mpe mibeko. Basantu bakozala na se ya bokonzi na ye mibu misato na ndambo.


Alobaki na ngai : — Ekosalema bapokwa nkoto moko na nkama moko na tuku mitano mpe batongo nkoto moko na nkama moko na tuku mitano ; sima na yango nde Esika ya bule ekobulisama lisusu mpo na losambo.


Mwasi yango akimaki na esobe epai wapi Nzambe abongiselaki ye ebombamelo, mpo ete asungama kuna mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku motoba.


Bongo kati na Molimo, amemaki ngai kati na esobe moko. Mpe kuna, namonaki mwasi moko avanda na likolo ya nyama ya motane. Loposo ya nyama yango etondaki na bakombo oyo ezalaki kofinga Nzambe. Yango moko nyama ezalaki na mito sambo mpe na maseke zomi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ