Emoniseli 12:11 - Mokanda na Bomoi11 Kasi bango balongi ye na nzela ya makila ya Mpate, mpe na nzela ya liloba ya litatoli na bango ; balingaki te bomoi na bango kino kondima ata kokufa. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bongo namonaki bakiti ya bokonzi. Bato oyo bavandaki na bakiti yango bapesamelaki bokonzi ya kosambisa. Namonaki mpe milimo ya bato oyo bakataki bango mito mpo na litatoli na bango na tina na Yesu mpe na tina na Liloba na Nzambe, mpo ete bagumbamelaki te nyama mpe ekeko na yango mpe batiamaki te elembo na yango na bambunzu mpe na maboko na bango. Bazongaki na bomoi mpe bakonzaki elongo na Klisto mibu nkoto moko.
Moto oyo akolonga, nakokomisa ye likonzi kati na Tempelo ya Nzambe na Ngai, mpe akotikala lisusu te kobima kuna. Nakokoma na likolo na ye Kombo ya Nzambe na Ngai mpe kombo ya engumba ya Nzambe na Ngai, Yelusalemi ya sika, oyo ekokita wuta na Lola, epai ya Nzambe na Ngai. Mpe lisusu, nakokoma Kombo na Ngai ya sika na likolo na ye.