Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 12:10 - Mokanda na Bomoi

10 Bongo nayokaki, kati na Lola, mongongo moko ya makasi koloba : « Tango ya lobiko, ya nguya, ya Bokonzi ya Nzambe na biso, mpe ya nguya ya Klisto na Ye ekoki. Pamba te Mofundi ya bandeko na biso, oyo afundaka bango butu mpe moyi, liboso ya Nzambe na biso, abwakami na mokili.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 12:10
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Yawe, monene, nguya, kongenga, nkembo mpe bokonzi ezali ya Yo ; pamba te biloko nyonso oyo ezali na likolo mpe na se ezali ya Yo. Yawe, bokonzi ezali ya Yo, osalaka nyonso oyo olingi na ekelamu nyonso.


Kasi sik’oyo, sembola kaka loboko na Yo mpe beta biloko na ye nyonso ; okomona penza soki akolakela Yo mabe te na miso na Yo.


Satana azongiselaki Yawe : — Okanisi ete ezali na pamba nde Yobo atosaka Nzambe ?


Kasi sik’oyo, sembola kaka loboko na Yo, beta nzoto mpe mikuwa na ye ; okomona penza soki akolakela Yo mabe te na miso na Yo.


Mokili mobimba ekokanisa Yawe, ekomipesa epai na Ye ; mpe bituka nyonso ya bikolo ekogumbama liboso na Ye.


Tika ete makonga na Yo ya minu etobola mitema ya banguna ya mokonzi ; tika ete bikolo ekweya na se ya matambe na Yo.


Na tango ya bakonzi wana, Nzambe ya Lola akobimisa bokonzi moko oyo ekotikala kobebisama te mpe ekotikala kozala te na se ya bokonzi ya ekolo mosusu ; ekopanza mpe ekosukisa babokonzi wana nyonso, kasi yango moko ekowumela seko na seko.


Yesu azongiselaki ye : — Otatoli yango. Kasi nazali koloba na bino : Kobanda sik’oyo, bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya na nkembo na likolo ya mapata ya Likolo.


Yesu apusanaki pene na bango mpe alobaki : — Bokonzi nyonso epesameli Ngai, ezala kati na Likolo to na mokili.


tika ete Bokonzi na Yo eya, tika ete mokano na Yo esalema, awa na mokili ndenge esalemaka kuna na Likolo !


Yesu alobaki na bango : — Tango bozali kosambela, boloba : Tata, tika ete Kombo na Yo ebulisama, tika ete Bokonzi na Yo eya !


Simona, Simona, Satana asengi koyungola bino ndenge bayungolaka ble.


Boye, tango bokosangana na Kombo na Yesu, Nkolo na biso, nakozala elongo na bino na molimo ; mpe na nguya ya Yesu, Nkolo na biso,


Kasi azongiselaki ngai : « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai.


Teya mpe bamama mibange ete bazala na bizaleli oyo ekoki na bato oyo bamibulisa mpo na Nzambe : basengeli te kotongaka bato mpe kozala bawumbu ya masanga ; basengeli nde komipesa na koteyaka makambo ya malamu,


Bolekisaka ndelo te na bizaleli na bino mpe botambolaka na ekenge, pamba te monguna na bino, Satana, atambolaka zingazinga na bino lokola nkosi oyo ezali konguluma mpe koluka moto ya kolia.


Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola ; elobaki : « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, mpe akokonza seko na seko. »


Moto oyo akolonga, oyo akosala mokano na Ngai kino na suka, nakopesa ye bokonzi ya kokonza bikolo :


bazalaki koganga na mongongo makasi : « Lobiko ezali ya Nzambe na biso, oyo avandi na Kiti ya Bokonzi, mpe ezali ya Mpate. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ