9 Bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya nkota nyonso mpe ya mikili nyonso bakotala bibembe na bango mikolo misato na ndambo, mpe bakoboya ete bakunda yango.
Soki moto aboti bana nkama moko mpe azwi ngolu ya kowumela mibu ebele na bomoi ; bongo, atako awumeli mibu ebele na bomoi, asepeli te na bozwi na ye mpe azangi ata kunda, nalobi solo ete mwana oyo abotami ya kokufa azali malamu koleka ye ;
Oh mobebisi, mawa na yo, yo oyo nanu obebisama te ! Oh mofundi, mawa na yo, yo oyo nanu bafunda te ! Tango okosilisa kobebisa, yo mpe bakobebisa yo, tango okosilisa kofunda, yo mpe bakofunda yo.
Kasi sima na mikolo wana misato na ndambo, pema na bomoi kowuta na Nzambe ekotaki kati na bango mpe batelemaki. Bongo somo monene ekangaki bato oyo bazalaki kotala bango.
Anjelu alobaki na ngai : « Mayi oyo omonaki, oyo mwasi ya ndumba avandaki na likolo na yango, ezali bato ya mokili, bangulupa ebele ya bato, bikolo mpe nkota.
Tango kaka azwaki buku, bikelamu minei ya bomoi mpe bampaka tuku mibale na minei bagumbamaki liboso ya Mpate. Moko na moko kati na bango asimbaki na loboko na ye lindanda mpe kopo ya wolo etonda na ansa oyo ezali mabondeli ya basantu.
Mpe bayembaki nzembo ya sika : « Obongi na kozwa buku mpe kobuka bikangelo na yango, pamba te babomaki Yo ; bongo na nzela ya makila na Yo, osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, ya nkota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya mabota nyonso.