Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 11:8 - Mokanda na Bomoi

8 Bakotanda bibembe na bango, na etando epai wapi bato nyonso bakutanaka kati na engumba. Kolanda molimo oyo ekambaka engumba yango, babengaka etando yango Sodome mpe Ejipito. Ezali kuna na engumba yango nde Nkolo na bango abakamaki na ekulusu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 11:8
40 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato ya Sodome bazalaki penza bato mabe mpe bato ya masumu na miso ya Yawe.


Boye wuta na likolo, Yawe anokisaki mvula ya moto makasi ya fofolo, na sodome mpe na Gomore.


« Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na mokili ya Ejipito epai wapi ozalaki na bowumbu.


Yawe alobaki : — Namoni pasi ya bato na Ngai kuna na Ejipito ; nayoki koganga na bango mpo na misala makasi oyo bakonzi ya misala makasi bazali kopesa bango. Nayebi pasi na bango.


Bilongi na bango ezali kofunda bango ; bazali kolakisa masumu na bango ndenge bato ya Sodome bazalaki kosala, bazali kobomba yango te. Mawa na bango, pamba te bamilukeli nde makambo !


Namoni lisusu makambo ya nkele kati na basakoli ya Yelusalemi : bazali kosala kindumba mpe kowumela na lokuta, bazali kolendisa bato oyo basalaka mabe mpo ete batika te misala na bango ya mabe. Bango nyonso bazali liboso na Ngai lokola Sodome, bato ya Yelusalemi bazali lokola bato ya Gomore. »


Babimisaki Iri na Ejipito mpe bamemaki ye epai ya mokonzi Yeoyakimi oyo abomaki ye na mopanga mpe apesaki mitindo ete babwaka ebembe na ye kati na kunda oyo bakundaka bato pamba.


Kulutu na yo ya mwasi, ezali Samari oyo avandi na ngambo ya nor ya mokili na yo elongo na bana na ye ya basi ; leki na yo ya mwasi ezali Sodome oyo avandi na ngambo ya sude ya mokili na yo elongo na bana na ye ya basi.


Tala sik’oyo masumu ya Sodome, ndeko na yo ya mwasi : ye elongo na bana na ye ya basi bazalaki bato ya lolendo, mpo ete batondaki na bomengo mpe eloko moko te ezalaki kotungisa bango ; basungaki ata moke te babola mpe bato bakelela.


Nzokande, azalaki se kobakisa kindumba na ye tango azalaki kokanisa mikolo ya bolenge na ye, oyo azalaki kosala kindumba, na Ejipito.


Nakosukisa makambo ya soni mpe kindumba na yo, oyo obandaki na Ejipito. Okotombola lisusu miso na yo te mpo na komona bato wana mpe okotikala lisusu kokanisa Ejipito te.


Bakomaki na kindumba mpe bamipesaki na yango wuta bolenge na bango, na Ejipito. Kuna, bato bazalaki kosakana na mabele na bango mpe kosimbasimba tolo na bango ya bolenge.


Atikaki te kindumba na ye oyo abandaki na Ejipito, oyo na tango ya bolenge na ye, mibali bazalaki kosangisa na ye nzoto, kosimbasimba tolo na ye ya bolenge mpe kosilisa baposa na bango ya nzoto epai na ye.


Alobaki na ngai : — Mwana na moto, mikuwa oyo ezali libota mobimba ya Isalaele ! Bazali koloba : « Mikuwa na biso ekawuki, elikya na biso esili, bomoi na biso ebebi ! »


« Nabebisaki bino ndenge nabebisaki Sodome mpe Gomore ; bozalaki lokola koni ya moto oyo babimisi na moto. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.


Nazali koloba na bino penza ya solo : na mokolo ya kosambisama, etumbu ya bavandi ya engumba to ya mboka wana ekozala makasi koleka etumbu ya mokili ya Sodome mpe Gomore.


Akweyaki na mabele mpe ayokaki mongongo moko koloba na ye : — Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola Ngai ?


Yango wana Yesu mpe akufaki na libanda ya mboka mpo na kobulisa bato na nzela ya makila na Ye moko.


ekoki kosalema te ete bateya bango lisusu mateya ya kobongola lisusu mitema soki bakweyi na masumu, pamba te bazali lisusu kobaka Mwana na Nzambe na ekulusu, mpo na bango moko, mpe kosambwisa Ye na miso ya bato.


soki Nzambe apesaki na bingumba ya Sodome mpe Gomore etumbu na nzela ya moto oyo ezikisaki yango kino ekomaki putulu mpo na kopesa ndakisa ya etumbu oyo ekokweyela bato ya masumu


Ndenge moko mpe mpo na bato ya Sodome, ya Gomore mpe ya bingumba ya pembeni : basalaki ndenge moko na ba-anjelu, bamipesaki na pite mpe bazalaki kosangisa nzoto na ndenge oyo esengeli te. Bazali ndakisa mpo na bato oyo bazali komona pasi ya etumbu ya moto ya seko na seko.


Na ngonga wana kaka, mabele eninganaki makasi penza ; mpe eteni moko kati na biteni zomi ya engumba ebukanaki mpe, na koningana yango ya mabele, bato nkoto sambo bakufaki. Bato oyo babikaki batondaki na somo mpe bapesaki Nzambe ya Likolo nkembo.


Bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya nkota nyonso mpe ya mikili nyonso bakotala bibembe na bango mikolo misato na ndambo, mpe bakoboya ete bakunda yango.


Bakamolaki bambuma yango na libanda ya engumba kati na ekamolelo, mpe makila ebimaki wuta na ekamolelo yango, etondaki kino kokoma na bosanda ya monoko ya mpunda, mpe epanzanaki na etando ya bakilometele pene nkama misato.


Anjelu ya mibale alandaki mpe alobaki : « Babiloni monene ekweyi, ekweyi penza ! Emelisaki bikolo nyonso vino ya kanda ya kindumba na yango. »


Engumba monene ekabwanaki na biteni misato, mpe bingumba ya bikolo nyonso ebukanaki. Bongo Nzambe akanisaki Babiloni monene mpe apesaki yango kopo etonda na vino ya kanda na Ye ya makasi.


Moko kati na ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakopo sambo ayaki mpe alobaki na ngai : « Yaka, nakolakisa yo etumbu oyo mwasi ya ndumba monene oyo avandaka na bibale minene akozwa.


Mwasi oyo omonaki ezali engumba monene oyo ekonzaka bakonzi ya mokili. »


Na mbunzu na ye, bakomaki kombo moko oyo ebombaki makambo ya somo mpe oyo ndimbola na yango ezali : Babiloni monene, Mama ya Basi ya Ndumba mpe ya Makambo ya Nkele ya Mokili.


Mpo na somo ya minyoko na yango, bakotelema na mosika mpe bakoganga : ‹ Mawa ! Mawa na yo, engumba monene ! Mawa na yo, Babiloni, engumba ya nguya ! Kobebisama na yo ezwi kaka ngonga moko pamba ! ›


Wana bakomona molinga komata longwa na engumba oyo etumbami, bakoganga : ‹ Engumba nini ekokanaki na engumba monene oyo ? ›


Agangaki na mongongo makasi : « Ekweyi ! Ekweyi ! Babiloni monene ekweyi penza ! Ekomi ndako ya milimo mabe, ebombamelo ya milimo nyonso ya mbindo, ya bandeke ya mbindo mpe ya banyama ya nkele.


Bongo anjelu moko ya nguya akamataki libanga moko oyo ezalaki lokola libanga oyo basalelaka mpo na konika ble, abwakaki yango na ebale monene mpe alobaki : « Babiloni, engumba monene, ekobwakama ndenge wana, kaka na makasi moko wana, mpe ekomonana lisusu te.


Kati na yo, emonanaki makila ya basakoli, ya basantu mpe ya bato nyonso oyo babomamaki na mokili. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ