Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 11:7 - Mokanda na Bomoi

7 Kasi tango bakosilisa kopesa litatoli na bango, nyama oyo ekobima wuta na libulu ya monene mpe ya molili makasi ekobundisa bango, ekolonga bango mpe ekoboma bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 11:7
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

akotiola na maloba na ye Ye-Oyo-Aleki-Likolo, akonyokola basantu na Ye, akomeka ata kobongola manaka ya bafeti oyo ekatama mpe mibeko. Basantu bakozala na se ya bokonzi na ye mibu misato na ndambo.


Yesu alobaki na bango : — Bokende koloba na mbwa wana ya zamba : « Nakokoba kobengana milimo mabe mpe kobikisa babeli, lelo mpe lobi ; mpe na mokolo ya misato, nakosilisa mosala na Ngai. »


Bongo milimo mabe yango ezalaki kosenga na Yesu ete atinda yango te kati na libulu ya mozindo.


Namonisi nkembo na Yo awa na mokili mpe nasilisi mosala oyo opesaki Ngai.


Tango kaka Yesu amelaki vino yango ya ngayi, alobaki : — Nyonso ekokisami. Bongo, akitisaki moto mpe azongisaki molimo na Ye.


Nzokande, nazali komona bomoi na ngai lokola eloko pamba ; eloko oyo eleki motuya mpo na ngai ezali : kosukisa malamu momekano na ngai ya kopota mbangu mpe kokokisa lotomo oyo Nkolo Yesu apesaki ngai : kosakola Sango Malamu ya ngolu ya Nzambe.


Nabundi etumba na ngai malamu, nakomi na suka ya lisano na ngai ya kokima mbangu, nabateli kondima.


Mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku motoba, nakopesa na batatoli na ngai mibale mosala ya kosakola. Bakolata basaki tango bakozala kosakola. »


Bongo dalagona esilikelaki mwasi mpe ekendeki kobundisa bana na ye mosusu, ba-oyo batosaka mibeko ya Nzambe mpe bakangamaka makasi na litatoli na bango na tina na Yesu.


Bongo namonaki nyama mosusu kobima longwa na mabele. Ezalaki na maseke mibale lokola maseke ya mpate, mpe ezalaki koloba lokola dalagona.


Epesamelaki lisusu makoki ya kobundisa mpe kolonga basantu. Mpe epesamelaki bokonzi na likolo ya mabota nyonso, mikili nyonso, nkota nyonso mpe bikolo nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ