Eliya, moto ya Tishibe, moko kati na bavandi ya Galadi, alobaki na mokonzi Akabi : — Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, Nzambe oyo ngai nasalelaka, mamwe mpe mvula ekozala te na mibu oyo ezali koya, longola kaka soki nasengi yango.
Kasi Moyize azongisaki : — Ekoki kosalema bongo te ; noki te mbeka oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, ekomonana lokola eloko ya nkele na miso ya bato ya Ejipito. Boni, soki tobonzi mbeka oyo emonani lokola eloko ya nkele na miso na bango, bakobamba biso mabanga te ?
pamba te Mokeli na yo nde mobali na yo, Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ; Mosantu ya Isalaele azali Mosikoli na yo ; babengaka Ye : Nzambe ya mokili mobimba.
Yawe azalaki kobenga yo « Nzete ya olive ya mobesu oyo etonda na mbuma kitoko. » Kasi Yawe akotumba yango na makelele ya mopepe makasi, mpe bitape na yango ekobukana-bukana.
Oh Siona, mboka kitoko, telema mpe tuta ble, pamba te nakopesa yo maseke ya bibende mpe basapato ya bronze, bongo okobuka bikolo ebele mike-mike mpe okopesa bomengo na bango, oyo bazwaki na nzela ya mabe, lokola likabo epai na Yawe, mpe bozwi na bango epai na Mokonzi ya mokili mobimba.
Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na esika ya kobombama to na se ya katini. Nzokande, batiaka yango na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete bato oyo bazali kokota na ndako bamona pole.
Kasi soki bitape mosusu ekatamaki ; soki yo, etape ya nzete ya olive ya zamba, bakangisaki yo kati na bitape oyo etikalaki ; soki sik’oyo okomi komela, elongo na bitape yango, mayi moko oyo ezali komata wuta na mosisa ya nzete ya olive,
Na tango wana, Yawe atiaki pembeni libota ya Levi mpo na komemaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpo na kotelemaka liboso ya Yawe, mpo na kosalaka mosala na Ye mpe mpo na kopambolaka bato na Kombo na Ye ndenge bazali kosala kino lelo.
Tala mabombami oyo ezali kati na minzoto sambo oyo omonaki na loboko na Ngai ya mobali, mpe bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo : minzoto sambo elakisi ba-anjelu ya Mangomba sambo ; mpe bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo elakisi Mangomba sambo. »