Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 11:3 - Mokanda na Bomoi

3 Mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku motoba, nakopesa na batatoli na ngai mibale mosala ya kosakola. Bakolata basaki tango bakozala kosakola. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 11:3
43 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jakobi apasolaki bilamba na ye, alataki saki mpe asalaki matanga mpo na mwana na ye mikolo ebele.


Bongo Davidi alobaki na Joabi mpe na bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye : — Bopasola bilamba na bino mpe bolata basaki, bosala matanga liboso ya Abineri. Ye moko mokonzi Davidi atambolaki na sima ya ebembe.


Tango Akabi ayokaki makambo oyo, apasolaki bilamba na ye, alataki bilamba ya saki mpe akilaki bilei. Azalaki kolala na bilamba ya saki mpe azalaki kotambola malembe-malembe.


Tango mokonzi Ezekiasi ayokaki bongo, apasolaki bilamba na ye, alataki basaki mpe akotaki na Tempelo ya Yawe.


Davidi atombolaki miso mpe amonaki anjelu ya Yawe atelemi kati ya likolo mpe mabele, bongo na loboko na ye oyo asembolaki likolo ya Yelusalemi, asimbaki mopanga ezanga ebombelo. Davidi mpe bampaka balataki basaki mpe bakweyaki bilongi kino na mabele.


Kaka na sanza wana, na mokolo ya tuku mibale na minei, bana ya Isalaele basanganaki mpo na kokila bilei ; balataki basaki mpe bamipakolaki putulu na mito.


Natongi elamba na ngai ya saki na poso ya nzoto na ngai mpe nakundi lokumu na ngai nyonso na se ya putulu.


Soki naleli mpe nakili bilei, nasengeli kaka kofingama ;


Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, azalaki kobenga bino na mokolo wana mpo ete bolela mpe bosala matanga, bomikokola suki mpe bolata saki.


Na mokolo ya lelo, yeba ete nasili kopesa yo bokonzi likolo ya bikolo mpe ya mikili mpo na kopikola mpe kopanza, kobuka mpe kokweyisa, kotonga mpe kolona.


Bampaka ya Siona, mboka kitoko, bavandi kimia na mabele, bamisopeli putulu na mito na bango mpe balati basaki ; bongo bilenge basi ya Yelusalemi bafukami, bilongi na bango kino na se.


Sima na yo kosilisa mikolo yango, lala lisusu na ngambo ya loboko na yo ya mobali mpe mema lisusu masumu ya libota ya Yuda. Nakateli yo mikolo tuku minei : mokolo moko mpo na mobu moko na moko.


Moto oyo alataki bilamba ya lino mpe atelemaki likolo ya mayi ya ebale atombolaki loboko na ye ya mobali mpe loboko na ye ya mwasi na likolo, mpe nayokaki ye kolapa ndayi na Kombo ya Ye oyo azali na bomoi seko na seko : — Ekozala mibu misato na ndambo. Tango nguya ya ekolo ya bule ekosila, makambo oyo nyonso ekokokisama.


akotiola na maloba na ye Ye-Oyo-Aleki-Likolo, akonyokola basantu na Ye, akomeka ata kobongola manaka ya bafeti oyo ekatama mpe mibeko. Basantu bakozala na se ya bokonzi na ye mibu misato na ndambo.


Alobaki na ngai : — Ekosalema bapokwa nkoto moko na nkama moko na tuku mitano mpe batongo nkoto moko na nkama moko na tuku mitano ; sima na yango nde Esika ya bule ekobulisama lisusu mpo na losambo.


Oh bino Banganga-Nzambe, bolata basaki mpe bolela. Bino bato oyo bosalaka na etumbelo, bolela. Bino basali ya Nzambe na ngai, boya, bolata basaki butu mobimba. Pamba te makabo ya bambuma mpe ya masanga ezali kopesama lisusu te na Ndako ya Nzambe na bino.


Bato ya Ninive bandimelaki Nzambe ; bazwaki mokano ya kokila bilei mpe ya kolata basaki, kobanda na oyo aleki na bozwi kino na oyo aleki na bobola.


Tika ete bato mpe bibwele balata basaki, babelela Nzambe makasi. Tika ete moko na moko atika nzela na ye ya mabe mpe mobulu oyo ekangami ye na maboko.


Nzokande, bato mibale oyo bakombo na bango ezalaki Elidadi mpe Medadi batikalaki kati na molako. Bango mpe bazalaki na molongo ya bampaka, kasi bakendeki te na Ndako ya kapo. Molimo akitelaki bango mpe bakomaki kosakola kati na molako.


Alobaki : — Mawa na yo, Korazini ! Mawa na yo, Betisaida ! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele bavandi na yango babongolaki mitema wuta kala, mpe mbele batalisaki yango na kolata basaki mpe na komipakola putulu !


Kasi soki ayokeli yo te, mema moto mosusu to bato mibale, pamba te Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato.


Mawa na yo, Korazini ! Mawa na yo, Betisaida ! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki kati na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele wuta kala, bavandi na yango babongola mitema, balata basaki mpe bamipakola putulu.


Bino nde bozali batatoli ya makambo yango.


bongo bino mpe bokotatola na tina na Ngai, pamba te bozali elongo na Ngai wuta na ebandeli.


Yoane azongisaki : — Moto akoki kozwa eloko moko te soki Likolo epesi ye yango te.


Kasi bokozwa nguya, wana Molimo Mosantu akokitela bino ; mpe bokozala batatoli na Ngai kati na Yelusalemi, na etuka mobimba ya Yuda, ya Samari, mpe kino na basuka ya mokili.


mpe bato oyo basalaki mibembo elongo na Ye, longwa na Galile kino na Yelusalemi, bamonaki Ye mikolo ebele. Bazali sik’oyo batatoli na Ye epai ya bato na biso.


Nzambe asekwisaki Yesu kati na bakufi ; boye biso nyonso tozali batatoli ya lisekwa yango.


Bobomaki nde Mobandisi ya bomoi. Kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, bongo biso tozali penza batatoli ya likambo yango.


Mpe kati na Lingomba, Nzambe atiaki : ya liboso, bantoma ; ya mibale, basakoli ; ya misato, balakisi ; mpe na sima, bato oyo bazali na likabo ya kosala bikamwa, ba-oyo bazali na likabo ya kobikisa babeli, ba-oyo bazali na likabo ya kosunga bato, ba-oyo bazali na likabo ya kokamba, mpe ba-oyo bazali na likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge.


Ekozala mbala na ngai ya misato ya koya epai na bino. Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato.


Ezali Ye moko Klisto nde akomisaki bamoko bantoma, bamosusu basakoli, bapanzi Sango Malamu, babateli bibwele mpe balakisi,


Ezali kaka na litatoli ya bato mibale to misato nde okoki koboma moto, kasi na litatoli ya moto moko te.


Litatoli ya moto moko ekoki te mpo na kotalisa ete moto songolo abomaki moto to asalaki mabe. Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato.


mpe kowuta na Yesu-Klisto, Motatoli oyo akosaka te, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpe Mokonzi ya bakonzi ya mokili ! Epai na Ye oyo alingaka biso mpe akangolaki biso na masumu na biso na nzela ya makila na Ye,


Kasi kozwa te molayi ya lopango ya libanda ya Tempelo, pamba te esilaki kokabama na maboko ya bikolo ya bapaya. Bapagano bakonyata engumba ya bule basanza tuku minei na mibale.


Batatoli yango mibale bazali na nguya ya kokanga Likolo mpo ete mvula enoka te na mikolo oyo bakozala kosakola. Bazali mpe na nguya ya kobongola mayi mpo ete ekoma makila, mpe ya kotinda pasi ya lolenge nyonso na mabele, na tango nyonso oyo balingi.


Mwasi yango akimaki na esobe epai wapi Nzambe abongiselaki ye ebombamelo, mpo ete asungama kuna mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku motoba.


Nyama epesamelaki monoko mpo na kobimisa maloba ya lolendo mpe ya kofinga Nzambe ; epesamelaki nzela ya kosalela bokonzi na yango basanza tuku minei na mibale.


Bongo nafukamaki na makolo ya anjelu mpo na kogumbamela ye, kasi alobaki na ngai : « Kosala bongo te ! Nazali moninga na yo ya mosala mpe ya bandeko na yo, oyo babatelaka litatoli ya Yesu. Fukamela nde Nzambe ! Pamba te ezali litatoli ya Yesu nde molimo ya lisakoli. »


Bongo namonaki bakiti ya bokonzi. Bato oyo bavandaki na bakiti yango bapesamelaki bokonzi ya kosambisa. Namonaki mpe milimo ya bato oyo bakataki bango mito mpo na litatoli na bango na tina na Yesu mpe na tina na Liloba na Nzambe, mpo ete bagumbamelaki te nyama mpe ekeko na yango mpe batiamaki te elembo na yango na bambunzu mpe na maboko na bango. Bazongaki na bomoi mpe bakonzaki elongo na Klisto mibu nkoto moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ