Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 11:19 - Mokanda na Bomoi

19 Bongo Tempelo ya Nzambe, oyo ezali kati na Lola efungwamaki, mpe Sanduku ya Boyokani na Ye emonanaki kuna kati na Tempelo ya Nzambe. Mpe mikalikali epelaki, mingongo mpe lokito ya bakake eyokanaki, mabele eninganaki, mpe mvula monene ya mabanga enokaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 11:19
33 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na esika ya mvula, atindelaki bango mvula ya mabanga mpe abetisaki kake kati na mokili na bango.


Akomisaki molili ebombamelo na Ye, kapo na Ye, oyo ezingelaki Ye ; mapata minene ezingelaki Ye, mwindo lokola mayi ya mozindo.


Tala, Nkolo azali na elombe moko ya nguya mpe ya makasi, elombe yango azali lokola mvula ya mabanga mpe mopepe oyo ebebisaka ; azali lokola mvula ya makasi mpe mpela ya somo, akokweyisa na makasi engumba yango na mabele.


Yawe, Mokonzi ya mampinga, akoya epai na yo na nzela ya bakake, ya koningana ya mabele mpe ya lokito monene, ya mopepe makasi mpe ya mvula ya moto oyo etumbaka.


Yawe akosala ete bato bayoka mongongo na Ye ya nkembo mpe akomonisa bango nguya ya loboko na Ye kati na kanda makasi na Ye, kati na moto oyo ebomaka, kati na mvula makasi ya bakake mpe ya mabanga.


Na nzela ya mvula ya mabanga oyo ekonoka, zamba mpe engumba ekokitisama na se penza.


yebisa bato oyo bapakolaka yango potopoto ya pembe ete mir ekokweya. Nakonokisa mvula moko ya makasi mpe ya mabanga, bongo mipepe makasi ekotomboka.


Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakotinda mopepe moko ya makasi, kati na kanda na Ngai, mpe nakonokisa mvula moko ya makasi mpe ya mabanga, kati na kotomboka na Ngai, mpo na kobebisa nyonso nye.


Nakotindela ye bokono oyo ebomaka mpe nakotangisa makila na ye lokola etumbu ; nakotindela mampinga na ye mpe bikolo oyo ekosangana na ye mvula makasi, mvula ya mabanga mpe ya moto.


Boye, balongwaki na ngomba ya Yawe mpe batambolaki mikolo misato ya mobembo. Sanduku ya Boyokani ya Yawe etambolaki liboso na bango na mobembo oyo ya mikolo misato mpo na kolukela bango esika ya kopema.


Soki balingi kolongola molako mpo na kokende na esika mosusu, bana mibali ya Keati bakoya komema soki kaka Aron mpe bana na ye ya mibali basilisi kofinika Esika ya bule mpe bisalelo na yango nyonso ; kasi basengeli te kosimba Esika ya bule, noki te bakokufa. Yango wana nde misala ya bana mibali ya Keati kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.


Tango bakolongola molako, Aron elongo na bana na ye ya mibali bakokota na kati, bakokitisa rido mpe bakozipa na yango Sanduku ya Litatoli.


Wana bazalaki kokima liboso ya Isalaele mpe kokita na Beti-Oroni, Yawe akitiselaki bango mabanga minene wuta na likolo kino na Azeka, mpe bakufaki. Bato oyo bakufaki na mabanga ya moto bazalaki motango ebele koleka ata bato oyo bana ya Isalaele babomaki na mopanga.


Na ngonga wana kaka, mabele eninganaki makasi penza ; mpe eteni moko kati na biteni zomi ya engumba ebukanaki mpe, na koningana yango ya mabele, bato nkoto sambo bakufaki. Bato oyo babikaki batondaki na somo mpe bapesaki Nzambe ya Likolo nkembo.


Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola ; elobaki : « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, mpe akokonza seko na seko. »


Elembo moko ya monene emonanaki na likolo, ezalaki mwasi moko. Alataki moyi lokola elamba, sanza ezalaki na se ya matambe na ye, mpe, na moto na ye, alataki motole oyo ezalaki na minzoto zomi na mibale.


Bongo nayokaki mongongo moko monene kobima wuta na Tempelo mpe koloba na ba-anjelu sambo : « Bokende kosopa na mokili bakopo sambo ya kanda ya Nzambe. »


Bongo mikalikali engengaki, mingongo eyokanaki, bakake ebetaki, mpe mabele eninganaki makasi ; likambo ya somo boye etikala nanu kosalema te wuta moto azali na mokili.


Bamvula minene ya mabanga enokaki ; libanga moko na moko ezalaki na bakilo pene tuku minei na mitano, mpe ekweyelaki bato longwa na likolo. Mpe bato bafingaki Nzambe mpo na pasi ya mvula wana ya mabanga, pamba te pasi yango ezalaki ya somo makasi.


Bongo namonaki Lola efungwami, mpe mpunda moko ya pembe ezalaki liboso na ngai. Kombo ya motambolisi ya mpunda yango ezali : « Sembo mpe Solo. » Akataka makambo mpe abundaka bitumba na bosembo.


Sima na makambo oyo, namonaki ekuke moko efungwama kati na Lola. Bongo mongongo oyo nayokaki koloba na ngai lokola kelelo na mbala ya liboso elobaki na ngai lisusu : « Mata awa, mpe nakolakisa yo makambo oyo esengeli koya sima na oyo. »


Wuta na Kiti yango ya Bokonzi, mikalikali ezalaki kongenga, makelele ya mingongo mpe lokito ya bakake ezalaki koyokana. Mpe liboso ya Kiti yango, minda sambo ezalaki kopela : ezali milimo sambo ya Nzambe.


Yango wana, batelemaka liboso ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe basalelaka Ye kati na Tempelo na Ye, butu mpe moyi ; mpe Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi akobatela bango kati na evandelo na Ye.


Bongo anjelu azwaki mbabola, atondisaki yango na makala ya moto oyo azwaki na etumbelo, mpe abwakaki mbabola yango na mabele. Mbala moko, lokito moko ya makasi eyokanaki : bakake, mingongo, mikalikali mpe koningana ya mabele.


Anjelu ya liboso abetaki kelelo ; mpe, mbala moko, mvula ya mabanga mike elongo na moto esangana na makila ebwakamaki na mabele. Bongo biloko oyo ezikaki : eteni moko kati na biteni misato ya mabele, eteni moko kati na biteni misato ya banzete, mpe matiti nyonso ya mobesu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ