Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 11:16 - Mokanda na Bomoi

16 Mpe bampaka tuku mibale na minei oyo bavandaki na bakiti na bango ya bokonzi liboso ya Nzambe bafukamaki bilongi kino na mabele, mpe bagumbamelaki Nzambe

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 11:16
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : tango makambo nyonso ekokoma ya sika, tango Mwana na Moto akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo, bino bato oyo bozali kolanda Ngai, bino mpe bokovanda na bakiti zomi na mibale ya bokonzi, mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.


Bampaka tuku mibale na minei mpe bikelamu minei ya bomoi bafukamaki mpe bagumbamelaki Nzambe oyo avandaka na Kiti ya Bokonzi, mpe bagangaki : « Amen ! Aleluya ! »


bampaka tuku mibale na minei bazalaki kogumbama liboso ya Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi, kogumbamela Ye oyo azali na bomoi seko na seko mpe kokitisa mitole na bango liboso ya Kiti ya Bokonzi na koloba :


Zingazinga ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki mpe na bakiti mosusu tuku mibale na minei ya bokonzi, mpe bampaka tuku mibale na minei bavandelaki yango. Bampaka yango balataki bilamba ya pembe, mpe bazalaki na mitole ya wolo na mito na bango.


Bikelamu minei ya bomoi bazalaki kozongisa : « Amen. » Mpe bampaka bafukamaki mpe bagumbamelaki.


Ba-anjelu nyonso oyo bazalaki kotelema zingazinga ya Kiti ya Bokonzi, ya bampaka mpe ya bikelamu minei ya bomoi, bagumbamaki, bilongi kino na mabele, liboso ya Kiti ya Bokonzi, mpe bagumbamelaki Nzambe


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ