Emoniseli 11:15 - Mokanda na Bomoi15 Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola ; elobaki : « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, mpe akokonza seko na seko. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Amekaki lisusu molayi ya bametele pene nkama mitano ; kasi na mbala oyo, mayi yango ekomaki ebale moko ya monene oyo nazalaki lisusu ata na makoki ya kokatisa te, pamba te mayi emataki makasi mpe ekomaki mozindo koleka. Bongo esengelaki kaka kokata mayi (na esika ya kokatisa yango na makolo), mpo ete moto moko te azalaki na makoki ya kokatisa ebale yango.
Bongo namonaki bakiti ya bokonzi. Bato oyo bavandaki na bakiti yango bapesamelaki bokonzi ya kosambisa. Namonaki mpe milimo ya bato oyo bakataki bango mito mpo na litatoli na bango na tina na Yesu mpe na tina na Liloba na Nzambe, mpo ete bagumbamelaki te nyama mpe ekeko na yango mpe batiamaki te elembo na yango na bambunzu mpe na maboko na bango. Bazongaki na bomoi mpe bakonzaki elongo na Klisto mibu nkoto moko.