8 Bongo mongongo oyo nayokaki wuta na Lola elobaki na ngai lisusu : « Kende, zwa buku oyo ezali ya kofungwama na loboko ya anjelu oyo atelemi na ebale monene mpe na mokili. »
Ata bokeyi na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi, matoyi na bino ekoyoka sima na bino liloba oyo : « Tala nzela yango oyo ! »
Bongo natalaki mpe namonaki loboko moko esembolama kino epai na ngai mpe esimbaki mokanda lokola buku elingama.
Na loboko na ye, asimbaki buku ya moke oyo ezalaki ya kofungwama. Atiaki lokolo na ye ya mobali na ebale monene, mpe oyo ya mwasi, na mokili ;