Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 10:4 - Mokanda na Bomoi

4 Mpe tango kaka bakake sambo etikaki kobeta, namibongisaki mpo na kokoma ; kasi mongongo moko elobaki na ngai wuta na Lola : « Batela malamu makambo oyo bakake sambo ewuti koloba, kokoma yango te. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 10:4
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na bino, emoniseli nyonso oyo ekomi lokola maloba ya buku oyo bakanga mpe bapesi epai ya moto oyo ayebi kotanga, bongo balobi na ye : « Nabondeli yo, tanga nanu buku oyo, » kasi azongisi : « Nakokoka te, pamba te buku ekangama. »


Yawe alobaki na ngai : « Kamata etando monene ya libanga mpe salela ekomeli mpo na kokoma makambo oyo na likolo na yango : Maher-Shalal-Hash-Baz (pene bomengo ya bitumba, pene kobebisama). »


Bomba lisakoli oyo ete eyebana te, kangisa mobeko oyo kati na bayekoli na ngai.


Kasi yo, Daniele, batela maloba oyo lokola sekele mpe kanga buku kino na tango ya suka. Mingi bakotambola bipai na bipai, mpe boyebi ya bato ekokola makasi. »


Azongisaki : — Daniele, kende na yo, pamba te maloba oyo ezali sekele, mpe buku na yango ekangama kino na tango ya suka.


Emoniseli ya bapokwa mpe ya batongo oyo epesamelaki yo ezali ya solo, kasi bomba yango malamu, pamba te etali makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya.


koloba : « Koma na buku makambo oyo ozali komona, mpe tinda yango na Mangomba sambo oyo : Efeso, Simirne, Pergame, Tiyatire, Sarde, Filadelfi mpe Laodise. »


Yango wana, koma makambo oyo omoni, oyo ezali sik’oyo, mpe oyo ekoya na sima.


Bongo mongongo oyo nayokaki wuta na Lola elobaki na ngai lisusu : « Kende, zwa buku oyo ezali ya kofungwama na loboko ya anjelu oyo atelemi na ebale monene mpe na mokili. »


Bongo alobaki na ngai lisusu : « Kobomba te maloba ya masakoli ya buku oyo, pamba te tango ekomi pene.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ