Emoniseli 10:3 - Mokanda na Bomoi3 bongo agangaki makasi lokola nkosi. Tango agangaki, bakake sambo ebetaki. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tala liloba oyo Yawe alobi na ngai : « Ndenge nkosi to mwana nkosi egangaka liboso ya mosuni na yango, ata lisanga monene ya babateli bibwele basangani mpo na kotelemela yango, ezalaka na somo ya makelele na bango te mpe ezongaka sima te na mangungu na bango, ndenge wana mpe Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokita na ngomba Siona mpe na ngomba na yango ya moke mpo na kobunda.
Sakola maloba oyo nyonso mpo na kotelemela bango mpe loba na bango : ‹ Yawe azali koganga wuta na likolo, azali kotomboka lokola kake wuta na Esika na Ye ya bule, azali konguluma makasi mpo na kotelemela mokili na Ye ! Akoganga lokola bato oyo bakamolaka mbuma ya vino, akogangela bavandi nyonso ya mokili oyo !