Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 10:10 - Mokanda na Bomoi

10 Nakamataki buku yango na loboko ya anjelu mpe naliaki yango. Na monoko na ngai, ezalaki sukali lokola mafuta ya nzoyi ; kasi sima na ngai kolia yango, ekomaki bololo kati na libumu na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 10:10
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete maloba na ngai esepelisa Ye ! Tika ete Yawe azala esengo na ngai !


Tala ndenge mitindo na Yo ezali elengi na monoko na ngai ! Ezali malamu koleka mafuta ya nzoyi.


Kotosa Yawe ezali peto, ewumelaka libela na libela. Mitindo ya Yawe ezali ya solo, nyonso ezali penza sembo.


Maloba ya elengi ezalaka lokola mafuta ya nzoyi, epesaka kimia na motema mpe lobiko na mikuwa.


Loboko yango efungolaki mokanda yango liboso na ngai. Na bangambo na yango nyonso mibale, bakomaki : basango ya bileli, ya mikakatano mpe ya pasi.


Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai mosika. Boye, nazalaki kokende na pasi na motema, mpe molimo na ngai etondisamaki na kanda ; nzokande loboko na Yawe ezalaki kosala kati na ngai na nguya makasi.


Alobaki na ngai lisusu : « Mwana na moto, lia mokanda oyo nazali kopesa yo mpe tondisa libumu na yo na yango. » Boye, naliaki yango, mpe ezalaki elengi na monoko na ngai lokola mafuta ya nzoyi.


Bongo balobaki na ngai : « Osengeli lisusu kosakola na tina na bikolo ebele, mabota ebele, nkota ebele mpe bakonzi ebele. »


Boye, nakendeki epai ya anjelu mpe nasengaki na ye ete apesa ngai buku wana ya moke. Alobaki na ngai : « Kamata mpe lia yango. Ekokoma bololo na libumu na yo ; kasi na monoko na yo, ekozala sukali lokola mafuta ya nzoyi. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ